Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Bozala na bomoi ya Makasi mpe Mpiko!Mwa ndambo

Bozala na bomoi ya Makasi mpe Mpiko!

MOKOLO 8 NA 8

“Azali kosala nyonso mpo na bolamu na Biso”

Nzambe azali kotalela nyonso kati na bomoi na biso. Azali na makoki nyonso ya kokoka mpo na kobongola likambo nyonso mpo ete ememela biso esengo na bondimi.

“Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.” Barome 8:28

Azali penza na makoki ya kolongola ata mikakatano ya makasi kati na bomoi mpe akotambwisa biso na nzela ya bokokisi ya mwango na ye mpo na bomoi na biso. Azali Kaka na mposa ete totyela ye penza mitema na biso.

“Ndimela Yawe na motema na yo mobimba, mpe kotia motema te na mayele na yo. Yebaka Ye na banzela na yo nyonso, mpe Ye akokomisa yango alima.” Masese 3:5-6

Kotya motema na biso epai ya Nzambe ezali kolongola biso mokumba ya kotambwisa malamu makambu kati na bomoi na biso te. Mokumba wana mpe kotyelela Nzambe motema ezali kolimbola eloko moko. Tangu tozali kosilisa mokumba na biso, Nzambe azali sembo mpe akotambwisa biso malamu.

Na makambu ebele, kotambwisama epai ya Nzambe ezali kolakisa bofungwami mpe bokangami ya “bikuke” na likambo na biso. Tangu mosusu, likambu na biso ezali kosenga Kaka lisalisi ya Nzambe mpo na kozwa lobiko, kosala bikamwisi mpe kosala likambo moko boye oyo elekelaki biso na mayele.

“Wana Yesu atalaki bango, alobaki: — Na bato, ekoki kosalema te; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema!” Matayo 19:26

Ezala maladi oyo ezali kosila te, mpiaka to kokufela moto oyo tolingaka, Nzambe azali, mpe akoki kosala bikamwa na Tangu wana.

Nzambe azali moto ya mayele oyo ayebi Kobongola minyokoli na Elonga Mpe na esengo na nzela ya Molimo -mosantu. Botya tembe te ete Nzambe asalaka lisusu “bikamwisi” te. Nzambe azali na makoki ya kobongola likambo nyonso oyo ekoki kolekela biso na mayele!

Mokolo 7

Oyo etali Ebongiseli oyo

Bozala na bomoi ya Makasi mpe Mpiko!

Botikala kozala bino moko te. Atako bokoma Baklisto banda mokolo moko to mpe bambula 30, likambo oyo ezali solo ekotelemela mikakatano nyonso oyo bomoi ekotyela biso na nzela. Boyekola lolenge ya kondima lisalisi ya Nzambe na mwango yango.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/