BOZALI na Libondeli!Mwa ndambo

“Bafungola motoba mpo na Libondeli ya malamu mpe ya bokatikati- Eteni ya mibale.”
4. Bolakisa ye bamposa mpe masenga na bino mpe bosenga ye mpo na koyanola yango. “Pesa biso Lelo bilei bya mokolo na mokolo…”
Bolingo ya Nzambe mpo na bino ezali mozindo mpe esilaka te, ezanga masengami. Bakokanisaka yango mbala na mbala kati ya bibliya na Tata moko ya bolingo mpo na mwana na ye. Azali na mposa ya Koyoka mwana na ye (elingi koloba yo); Azali na mposa ya Koyoka bomoi na yo, bamposa mpe masengami na yo, mpe azali kolinga opusana pembeni na ye mpo na yango. Bolingo na ye mpo na yo ezali kotinda ye apambola bino koleka oyo bobandaki kozela.
5. Senga Nzambe mpo alimbisa masumu na yo, na koyeba mposa na yo ya kolimbisa mpe bamisusu oyo bakoki kozala basalela biso mabe na kala. “Mpe limbisa biso mabunga na biso, lokola biso mpe tolimbisaka baoyo bazali kosala biso mabe.”
Kosenga Nzambe bolimbisi ezali kobanda na kondima mabunga na biso liboso na misu na biso moko, mpe kotubela yango epai ya Nzambe.
“Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene.” 1 Yoane 1:9
Bokoki kondima ete Nzambe alimbisi bino penza mpe apetoli bino na masumu na bino moko. Na bolimbisi yango, bozwi mpe bonsomi na ngambu oyo tomema, nsoni mpe Etumbu.
Kasi Nzambe azali kosenga ete tokola kolimbisa mpe ba oyo nyonso oyo basala biso mabe. Lokola kolimbisa ya Nzambe ezali kolemba bonsomi, kolimbisa ba misusu mpe: Tozali kozwa bonsomi na landau, zuwa mpe oyo ya kotika bapota ya kala ekoba kosala biso pasi.
Bolimbisi ezala oyo bozwaka to bopesaka ezali na ntina mpo na kozala na bomoi ya bonsomi na Klisto.
6. Bobondela mpo ete Nzambe akoba kotambwisa bino, pamba te, bokoka kokima komekama mpe makambo oyo ezali kobonga na ye te. “...kamba biso kati na komekama te, kasi bikisa biso na mabe.”
Zambe alimbisa masumu na biso mpe apetoli biso na kozanga boyengebeni nyonso, ndenge alobaki yango na 1 Yoane 1:9, kasi tokokutana Kaka na komekama tangu nyonso oyo kozala Awa na mabele. Eteni oyo ya libondeli ya Tata na biso ezali kobenda likebi na ntina ya kondima kopema Kaka te mpe kosepela Kaka na bolimbisi Nzambe apesaka biso, kasi na kozanga ntina ya kobakisa masumu lobi. Atako Nzambe azali kolongola etumbu ya elimo na mabe na biso, azali te kolongola matomba nyonso ya mabe oyo ekoki komema. Na yango, ezali na ntina penza ya kobondela Nzambe mpo ete tokola na kokima komekama.
Bobanda kopesa Nzambe mikolo nyonso tangu oyo bokoki kopesa ye na esengo na Libondeli. Nzambe azali kopesa bino motango ya kotosa mikolo nyonso te. Mpe tangu mosusu ekozala mpasi mpo na kotikala ekenge mpe “kozanga kolala”. Bolemba te, boyeba ete Nzambe akopambola bino soki bozwaka tangu ya kobondela Ye!
Oyo etali Ebongiseli oyo

Boyekola kotonga bomoi moko ya mabondeli ya makasi mpe ya ntina. Libondeli - kosolola na Nzambe makambo ya motema- ezali fungola mpo na komona mbongwana ya malamu kati ya Bomoi na biso mpe nzinganzinga na biso.
More
Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/