Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

BOZALI na Libondeli!Mwa ndambo

BOZALI na Libondeli!

MOKOLO 1 NA 6

“TOZALI na Libondeli!”

Na mokili ya lelo, batu ebele bazwaka libondeli lokola lolenge moko oyo esengeli te mpo na kolonga mikakatano ya Bomoi. Kutu ba misusu babondelaka te. Bamisusu bazongelaka kobondela kaka na nsima ya komeka makambo misusu soki esimbi te.

Kasi Nzambe alingaka te totalela libondeli lokola eloko ya kosala kaka soki tusuki. Na lolenge ya solo, Nzambe alingi ete libondeli ezala likambo ya motuya mingi kati ya Bomoi na biso: Esika oyo wapi tobandelaka. Alingaka koyoka nsango na biso ya mokolo, mikolo Nyonso, na tangu tozali na mawa mpe na tangu oyo tozali na nyonso mpe na esengo. Nzambe aza na mposa ya kolakisa bolingo na ye na bandenge ebele na kati ya lisolo na biso na nzela ya libondeli.

Libondeli ezali fungola mpo na komona mbongwana ya malamu kati ya Bomoi na biso mpe nzinganzinga na biso, mpe ezali na ntina mingi mpo na bokoli na biso na kotambola elongo na Nzambe.

“Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa”. Jake 5:16

Makomi

Mokolo 2

Oyo etali Ebongiseli oyo

BOZALI na Libondeli!

Boyekola kotonga bomoi moko ya mabondeli ya makasi mpe ya ntina. Libondeli - kosolola na Nzambe makambo ya motema- ezali fungola mpo na komona mbongwana ya malamu kati ya Bomoi na biso mpe nzinganzinga na biso.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/