Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

BOZALI na Libondeli!Mwa ndambo

BOZALI na Libondeli!

MOKOLO 3 NA 6

“Libondeli ya bino moko”

Kosambela elongo na baninga to na libota to mpe liboso ya kolia ezali bandenge moko ya malamu ya kosolola na Nzambe na kati ya batu. Kolongola kobondela elongo na batu, Nzambe azali na mposa ya komona mokomoko na bino azali kobondela ye. Yesu alobaki boye na oyo etali boninga ya motema kati ya mabondeli na biso:

“Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.” Matayo 6:6

Malako ya Yesu mpo na kobondela na ndenge ya kobombama ezali komonisa polele ete Nzambe azali kotya likebi na bomoi ya mokomoko na biso. Mwango na ye ezali ya kobongisa boyokani ya biso na ye na nzela ya lisolo ya mokomoko na biso. Nzambe azali komona mokano na bino ya kozala na boninga ya bino moko kaka na Ye mpe azali kolaka kopesa bino matomba mpe kopambola bino.

Nzambe azali na mposa toyebisa ye solo, tofongolwela ye mitema na boyokani na Ye, ndenge tosalaka yango na moto oyo tolingaka. Atako kokanga na mutu maloba nyonso ya libondeli ezali nango mabe te, Nzambe asepelaka ya solo koyoka maloba oyo euti kati na biso moko kaka, na esika ya kotangela ye Kaka maloba oyo makomama. Yesu alobaki boye na oyo etali bosolo na mabondeli na biso:

“Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi. 8Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.” Matayo 6:7-8

Atako zambe ayebi bamposa na biso mpe Mae tozali koluka liboso kutu ya koloba na ye, azali kosepela koyoka masenga nyonso wana oyo euti kati na motema na biso. Azali matomba ya malamu mpo na biso na makanisi. Azali koluka koyanola na libondeli nyonso na bolingo mpe bosembo.

Likambo mosusu ya ntina na libondeli ezali molende mpe boyokani. Nzambe alembaka koyoka mabondeli na biso te atako tozongeli mabondeli oyo tosili kosala. Yesu alobi boye na oyo etali mabondeli na biso:

“Bosenga, mpe bakopesa bino; boluka, mpe bokomona; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino; pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.” Matayo 7:7-8

Kobomba tangu mikolo nyonso mpo na kosolola biso moko na Nzambe ezali na ntina mpo na kokola na botamboli na biso ya Baklisto. Mikolo nyonso, boluka mwa tangu oyo makanisi na bino ezali koyengayenga te, mpe bobanga te ete Nzambe azali na montele mpo na kolandela tangu oyo bozali kopesa ye. Ezali solo te. Azali Kaka na mposa na biso. Boninga, bosolo mpe molende ezali makambu ya ntina oyo esengeli kozwama na tangu ya mabondeli ya bino moko na Nzambe mpe ekosalisa bino mpo na kotonga boyokani moko ya boninga na Ye. Bokosepela na mwa tangu wana penza mpe bokobanda kotubela ye motema na ndenge oyo botikala kosala te.

Mokolo 2Mokolo 4

Oyo etali Ebongiseli oyo

BOZALI na Libondeli!

Boyekola kotonga bomoi moko ya mabondeli ya makasi mpe ya ntina. Libondeli - kosolola na Nzambe makambo ya motema- ezali fungola mpo na komona mbongwana ya malamu kati ya Bomoi na biso mpe nzinganzinga na biso.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/