Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

BOZALI na Libondeli!Mwa ndambo

BOZALI na Libondeli!

MOKOLO 2 NA 6

“Nzambe azali koluka koyoka bino”

Moko ya bantina oyo esalaka ete bato baluka kobondela kaka soki basuki na makanisi ezali boyebi ya lokutu oyo bazali na yango mpo na Nzambe. Tozalaka na makanisi moko ya lokuta nakobanza ete mwango ya Nzambe ezali mosika penza na biso mpe etalaka biso ata moke te. Likambo ya koyeba ezali ete Nzambe atyaka likebi na mokomoko na bino. Akelaki bino mpo na bolingi na ye mpe azali na mposa ya kosala kati na bino mpe na nzela na bino!

Libondeli elimbolami na pete nyonso lokola lisolo oyo bosalaka elongo na Nzambe. Kanisa moninga oyo ozalaka na ye. Azalaka wana tangu nyonso oyo bozalaka na mposa na ye mpe bosololaka na ye tangu nyonso. Bongo? Bokobetela ye bomoi na bino. Bongo? Nayango, Nzambe alingi kokoma moninga na bino ya motema. Bokoki koyebisa ye Nyonso, koseka na ye, kobetala ye oyo eleki na mokolo. Koloba na ye solo, kolakisa ye bamposa na bino. Alingi koyoka nyonso! Nzambe alingi penza kosolola na mokomoko na bino.

“Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.” Emoniseli 3:20

Yesu azali kobeta na ekuke ya mitema na bino, alingi kolekisa na bino mwa tangu ya libondeli elongo. Kofungola kaka ekuke yango na bosenga ya Yesu ezali ebandeli ya bomoi moko oyo ebongi, ya ntina mpe oyo etonda na mapamboli ya Nzambe.

Nzambe azali eutelo ya solo ya libateli na bomoi na biso. Alingi kolakisa biso bosembo mpe bolingo na ye - mokakatano ata moko te eleki Ye na mayele- azali Kaka na mposa ya Koyoka bino.

“Nzambe azali lobiko mpe nkembo na ngai; libanga ya makasi na ngai mpe ebombamelo na ngai ezali kati na Nzambe.” Banzembo 62:8

Mokolo 1Mokolo 3

Oyo etali Ebongiseli oyo

BOZALI na Libondeli!

Boyekola kotonga bomoi moko ya mabondeli ya makasi mpe ya ntina. Libondeli - kosolola na Nzambe makambo ya motema- ezali fungola mpo na komona mbongwana ya malamu kati ya Bomoi na biso mpe nzinganzinga na biso.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/