Ebandeli 4

4
Kayina mpe Abele
1Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »
2Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga.
3Sima na mwa tango, Kayina amemaki mbuma ya mabele mpo na kobonzela Yawe. 4Abele, ye mpe amemaki bibwele oyo ebotamaki liboso kati na etonga na ye mpe biteni oyo eleki mafuta. Yawe asepelaki na Abele mpe na makabo na ye, 5kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa.
6Yawe alobaki na Kayina :
— Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ? 7Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango.
8Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye.
9Yawe atunaki Kayina :
— Wapi ndeko na yo Abele ?
Kayina azongisaki :
— Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ?
10Nzambe alobaki :
— Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai. 11Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki. 12Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili.
13Kayina alobaki na Yawe :
— Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema ! 14Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai.
15Kasi Yawe alobaki na ye :
— Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo.
Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te.
16Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi#4.16 Nodi elakisi : mboka ya koyengayenga., na este ya Edeni.
Libota ya Kayina
17Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali.
18Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki.
19Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. » 20Ada abotaki Yabali, koko ya bavandi ya bandako ya kapo mpe ya babokoli bibwele. 21Ndeko na ye ya mobali, Yubali, azalaki koko ya bato oyo babetaka lindanda mpe flite. 22Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. »
23Lemeki alobaki na basi na ye :
« Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ;
bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu :
Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ;
mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali !
24Solo, bakozongisa mbala sambo
mabe oyo basali Kayina ;
kasi mpo na Lemeki,
ekozala mbala tuku sambo na sambo ! »
Libota mosusu ya Adamu
25Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. » 26Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. »
Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.

Выбрано:

Ebandeli 4: MNB

Выделить

Поделиться

Копировать

None

Хотите, чтобы то, что вы выделили, сохранялось на всех ваших устройствах? Зарегистрируйтесь или авторизуйтесь

YouVersion использует файлы cookie, чтобы персонализировать ваше использование приложения. Используя наш веб-сайт, вы принимаете использование нами файлов cookie, как описано в нашей Политике конфиденциальности