Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mokano ya Ntina na Bomoi na Bino!Mwa ndambo

Mokano ya Ntina na Bomoi na Bino!

MOKOLO 4 NA 6

“Lobiko: Mosala ya Nzambe mpe oyo ya bino”

Lobiko na bino ezali kosangisa mikano mibale ya motuya. Mokano ya liboso ezali oyo Nzambe azwaki kala, oyo ya kotinda mwana na ye na mokili mpo na kozala kaka ye moko Mobikisi na biso. Ya mibale ezali mokano ya bino moko ya koyamba mwana na ye lokola Mobikisi na BINO.

“Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe— ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa.” Ba-Efeso 2:8-9

NGOLU elimbolami lokola boboto monene to oyo ebongi n biso te. Ngolu ezali likabo ya Nzambe na kati ya lobiko, mpe azali kotanda boboto na ye na mokili mobimba na nzela ya likabo ya kokoka, Yesu-Klisto. Na nzela ya ekulusu, Yesu afutaki motuya nyonso ya masumu na biso. Na nzela ya Yesu, oyo azali boboto ya lolenge ya kibomoto ya Nzambe, motangu moko ya bolamu etangameli biso te to tokokoka kofuta yango biso moko te. Biso moko tokoki kobonga na lobiko te; ezali likabo ya ofelempo na moto nyonso, tosengeli kofuta eloko te.

KONDIMA elimbolami lokola elembo ya kozala ya eloko, atako tozali te komona to kosimba yango. Kondima ezali nan tina mingi mpo na mosala na biso ya lobiko, mpe na nzela ya kondima, lokola elembeteli ya mokano nab iso, tozali kopona kopesa Nzambe bomoi na kondimela Yesu-Klisto lokola Nkolo na bomoi na bino. Lokola tozwi na kondima boboto monene ya Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, lobi na bino ezali penza ya seko elongo na Nzambe na lola. Okoki kondima yango na 100%!

Atako bolamu yango moko ekoki kobikisa biso te, ezali nan tina mingi na kati ya bomoi na biso na nsima ya koyamba Yesu.

“Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe: Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango.” Ba-Efeso 2:10

Nzambe azali na mwango oyo eyebani mpo na bomoi ya mokomoko na biso. makambo ebele esengami mingimingi na Ye mpe na bino. Kasi Nzambe azali na mwango moko mpo na bana na ye nyonso: Tolakisa kondima na biso polele na kosala bolamu. Soki bosali bongo, bozali kokokisa eteni moko ya ntina ya mwango ya Nzambe mpo na bomoi na bino mpe tozali na mokumba ya kongengisa bolingi na ye epai ya batu misusu. Lobiko ezali yango moko ebandeli ya sika mpe suka mpe esengeli kosalela yango molulu. Ozali ekelamu ya sika, obongwani mpo na libela!

Mokolo 3Mokolo 5

Oyo etali Ebongiseli oyo

Mokano ya Ntina na Bomoi na Bino!

Mikano mingi ya bomoi ezalaka ya mituya. Kasi moko ezali na ntina koleka. Soki ozali koluka búku oyo ezanga mindondo mpo na kosalisa bino na kokanga ntina penza ya mokano oyo ya monene – likabo ya ofele ya lobiko ya Nzambe - na bongo, banda awa.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/