Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mokano ya Ntina na Bomoi na Bino!Mwa ndambo

Mokano ya Ntina na Bomoi na Bino!

MOKOLO 2 NA 6

“Nzambe akelaki bino na likanisi ya kozala na bomoi ya seko”

Ntangu Nzambe akelaki biso, akanaki te kosukisa mikolo ya bomoi na biso na bambula 70 to 80. Azali na mokano oyo eyebani mpo na mokomoko na biso. Mwango na ye etalelaka bomoi na biso awa na mabele mpe bomoi ya likolo (to ya seko). Jake 4:14 ezali kolimbola bokeseni oyo ezali na kati ya makambo mibale ya bomoi na biso. Elobi boye,

“Bomoi na bino (awa na mabele) nde nini? Ezali kaka te lokola londende oyo emonanaka mpo na mwa tango moke mpe, na sima, elimwe?” Jake 4:14

Esi boyoka lisese oyo, “Bomoi ezali mokuse.” Na lisalisi ya boseko, ezali bongo! Bibliya elobi,

“…bongo ndenge kaka ekatama ete moto nyonso asengeli kokufa mbala moko, mpe, sima na yango, kosambisama eya.” Ba-Ebre 9:27

Nzoto na biso nyonso ekosila na kokufa. Kasi liwa ya nzoto ezali kaka nsuka ya nzoto na biso kasi ya molimo na biso te. Molimo na biso, to bozalani oyo bofandaka kati ya nzoto na biso, eza ya libela. Na nsima ya liwa ya nzoto na biso, Molimo nab iso ekolekisa seko na moko ya bisika mibale: Paradiso to Lifelo.

Lola ezali paradiso ya seko esika wapi Nzambe afandaka.

Lifelo ezali penza bokabwani na Nzambe.

Kobotama na biso na mokili elakisaki kaka te ebandeli ya bomoi ya nzoto na biso mpo na tangu mokuse awa na mabele, kasi mpe ebandeli ya bomoi ya elimo na biso awa mpe na mokili mosusu mpo na seko.

Yango, na lisalisi ya boseko, bato misusu bakoki kokanisa ete bomoi na biso awa na mabele ezali penza na ntina te, kasi ezali ya solo te. Na bosolo, lobi na bino ya libela ezali kotongama na kotala mikano oyo bozali kozwa tangu bozali nainu awa na mabele; mpe mokanu ya ntina penza, oyo ya kondimela Yesu-Kilisto lokola Nkolo ya bomoi na bino. Lobiko ezali npo na biso nyonso na Yesu-Kilisto, mpe na nzela na Ye moko kaka, nde tokoki kobongola lobi na biso, nae sika ya kolekisa seko na biso mosika na Nzambe, tokolekisa yango na lola elongo na Nzambe. Yesu alobaki:

“Ngai, nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata, soki na nzela na Ngai te.” Yoane 14:6

Mikano oyo tozali kozwa na bomoi na biso awa na mabele ezali ezali na motuya mpo na bantina misusu. Lolenge na biso ya kozala lokola bandimi ekoki kobongola lobi ya libela ya bato misusu oyo bandimeli naino te Yesu lokola Mobikisi na bango. Mikolo nyonso, bato yo bazali nzinganzinga na biso batalaka ndakisa ya bomoi kati ya Klisto. Lokola tozali bandimi na ye, Nzambe asalelaka mokomoko na biso mpo na komemela bato misusu mpe ba oyo bayebi ye naino te, Paradiso. Yesu alobaki:

“Bozali pole ya mokili… tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo. Matayo 5:14-16”

Mokolo 1Mokolo 3

Oyo etali Ebongiseli oyo

Mokano ya Ntina na Bomoi na Bino!

Mikano mingi ya bomoi ezalaka ya mituya. Kasi moko ezali na ntina koleka. Soki ozali koluka búku oyo ezanga mindondo mpo na kosalisa bino na kokanga ntina penza ya mokano oyo ya monene – likabo ya ofele ya lobiko ya Nzambe - na bongo, banda awa.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Twenty20 Faith, Inc. mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.twenty20faith.org/