Yobo 4
4
Maloba ya Elifazi : moto nyonso asalaka mabe
1Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki :
2« Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko,
boni, okotomboka mpo na yango te ?
Kasi nani akoki penza kokanga motema
mpe kozanga maloba ?
3Kanisa nanu ndenge ozalaki koteya bato ebele,
ndenge ozalaki kolendisa bato oyo balembaki !
4Maloba na yo ezalaki kolendisa bato
oyo bazalaki kotepatepa,
mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba.
5Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo,
olembi na yo !
Awa pasi ebeti yo,
okomi na yo koyoka somo !
6Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te
kozala likonzi na yo,
mpe bosembo na yo esengeli te
kosimba elikya na yo ?
7Kanisa nanu : Nani akotikala kokufa te
mpo ete asalaka mabe te ?
Esika nini bato ya sembo bakotikala kokufa te ?
8Kolanda makambo oyo ngai nasili komona,
bato oyo basalaka mabe,
mpe ba-oyo balonaka minyoko,
babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma ;
9bakufaka na mopepe ya Nzambe
mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye.
10Nkosi ekoki na yango koganga,
mpe mwana ya nkosi ekoki kotia makelele ndenge elingi,
kasi Nzambe abukaka minu ya nkosi.
11Nkosi ekufaka mpo na kozanga nyama ya kolia,
mpe bana ya nkosi ya mwasi epanzanaka.
12Liloba moko eyelaki ngai na nkuku,
mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza :
13kati na bandoto ya butu,
na tango bato bazwaka pongi makasi,
14kobanga mpe somo ekangaki ngai
mpe eningisaki mikuwa na ngai nyonso ;
15molimo moko elekaki liboso ya elongi na ngai
lokola mopepe,
mpe suki ya moto na ngai etelemaki.
16Molimo yango etelemaki wana,
kasi nalongaki te kososola soki ezali nini ;
elilingi yango etelemaki liboso ya miso na ngai,
mpe nayokaki mongongo moko koloba na se penza :
17‹ Boni, moto akoki solo koleka Nzambe na bosembo
to akoki solo koleka Mokeli na ye na bule ?
18Soki Nzambe atielaka basali na Ye motema te,
soki kutu amonaka mabunga epai ya ba-anjelu na Ye,
19mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele,
ba-oyo bazali kaka putulu
mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ?
20Kobanda na tongo kino na pokwa,
bakataka-kataka bango na biteni ;
bakufaka mpo na libela,
mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango ;
21basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo
epikolamaka na mbalakata,
mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. ›
Currently Selected:
Yobo 4: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.