Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Yobo 5

5
1Ganga na yo, soki olingi !
Nani akoyanola yo ?
Okotombokela mosantu nini ?
2Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele,
zuwa ebomaka zoba.
3Solo, namonaki zoba kozwa misisa ;
kasi, mbala moko, nalakelaki ndako na ye mabe :
4‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi,
balonga te na kosambisama
mpe bazangela moto oyo akobundela bango !
5Tika ete moto oyo azali na nzala
asilisa mbuma ya elanga na ye,
akamata yango kino kati na basende ;
mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! ›
6Pamba te pasi ewutaka na putulu te,
mpe minyoko ewutaka na mabele te ;
7moto abotamaka mpo na komona pasi,
ndenge kaka mikalikali ebimaka mpo na kopanzana na likolo.
8Kasi soki ezalaki ngai,
nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe,
nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai.
9Nzambe asalaka makambo minene
oyo bato bakokaka kososola te,
mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ;
10anokisaka mvula na mokili,
mpe atindaka mayi na bilanga ;
11atombolaka bato oyo babwakama,
mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela ;
12abebisaka mabongisi ya bato
oyo bazalaka na mayele mabe,
mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango ;
13akangaka bato ya bwanya
kati na mitambo ya mayele mabe na bango,
mpe abebisaka mabongisi ya bakosi.
14Molili eyelaka bango na moyi ;
na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu.
15Nzambe abikisaka mobola
na mopanga ya monoko na bango,
akangolaka moto akelela
na loboko ya moto ya makasi.
16Boye, mobola asengeli kozala na elikya,
mpe moto oyo atambolaka na bosembo te
asengeli kokanga monoko.
17Esengo na moto oyo Nzambe apameli !
Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso.
18Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ;
abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka.
19Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ;
mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te.
20Akokangola yo na kufa,
na tango ya nzala makasi ;
mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga,
kati na bitumba.
21Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo,
okobanga kobebisama te tango ekoya ;
22okoseka kobebisama mpe nzala makasi,
mpe okobanga te banyama ya mokili ;
23pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga,
mpe banyama ya zamba ekozala na kimia elongo na yo.
24Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ;
tango okotala bibwele kati na lopango na yo,
okomona ete ata moko te ezangi.
25Okososola ete bana na yo bakozala ebele,
mpe bakitani na yo, lokola matiti ya mabele.
26Okokita na kunda na kimobange makasi,
ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango.
27Toyekolaki likambo yango malamu : ezali penza bongo.
Boye, yoka yango mpe salela yango
mpo na bolamu na yo ! »

Currently Selected:

Yobo 5: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo