Yobo 3
3
Maloba ya Yobo mpe ya balingami na ye misato
Yobo alakeli mokolo ya mbotama na ye mabe
1Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe. 2Yobo alobaki :
3« Tika ete mokolo ya mbotama na ngai,
mpe butu oyo elobaki :
‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa !
4Tika ete mokolo yango ebongwana molili !
Tika ete, wuta na likolo,
Nzambe akanisa yango lisusu te !
Tika ete pole engengela yango lisusu te !
5Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango !
Tika ete lipata ezipa yango,
mpe molili ebangisa pole na yango !
6Tika ete molili makasi ekotela butu yango,
ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu
to kati na mikolo ya basanza !
7Tika ete butu yango etikala ekomba,
ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango !
8Tika ete bato oyo balakelaka mikolo mabe,
bato oyo balamusaka bilima minene ya mayi,
balakela yango mabe !
9Tika ete minzoto ya tongo na yango ekoma molili,
ezela na pamba tongo oyo ekotana
mpe emona kongenga ya tongo te.
10Pamba te ekangelaki ngai te
bikuke ya libumu ya mama na ngai
mpo na kobombela miso na ngai pasi ya boye !
11Mpo na nini namikufelaki te
kati na libumu ya mama na ngai ?
Mpo na nini nakataki motema te
tango nabimaki na libumu ya mama na ngai ?
12Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai ?
Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele ?
13Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia,
nalingaki na ngai kokufa mpe kopema
14elongo na bakonzi mpe bapesi toli ya mokili,
oyo bamitongelaki malita na bango kasi lelo ebeba,
15elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo
mpe batondisa palata kati na bandako na bango.
16Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele
lokola zemi oyo esopani
to lokola mwana oyo atikala komona te
pole ya mokolo ?
17Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato,
bato oyo balembi bazwaka bopemi,
18bato ya boloko bazwaka kimia
mpe bayokaka lisusu te mongongo ya mokengeli.
19Ezala mobola to mozwi, bango mibale bazalaka kuna,
mpe mowumbu akangolamaka na maboko ya nkolo na ye.
20Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi ?
Mpo na nini bomoi epesamelaka moto
oyo azali na pasi na motema ?
21Bazelaka kufa, kasi eyaka te ;
nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama,
22balingaki kotonda na esengo mpe kosepela
soki bamoni kunda !
23Mpo na nini bomoi epesamela moto
oyo nzela na ye ebombama,
moto oyo Nzambe azingela lokola lopango ?
24Pamba te kolela ekomi bilei na ngai,
bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi.
25Makambo oyo nazalaki kobanga,
yango nde ezali kokomela ngai ;
oyo nazalaki koyokela somo,
yango nde ezali kosalemela ngai.
26Nazangi kimia, motema na ngai ezali kokita te
mpe nazangi bopemi ;
kasi minyoko na minyoko kaka nde nazali na yango. »
Currently Selected:
Yobo 3: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.