Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 3Mwa ndambo

Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 3

MOKOLO 2 NA 3

KONDIMA YA MOLENDE

Kozala moyekoli ya Klisto ezali likambo ya ofele kasi ezali petee te, kozala moyekoli ya Klisto ezali talo mingi. Liloba Kende na Siloama mpe sokola elongi na yo ; Ezali likambo ya kopona te kasi ezali nde etinda.

Mokufi miso wana azalaki na lolenga mosusu ya kosala te, asengelaki kosala kaka oyo Yesu asengaki na ye. Esengaka kozala na kondima ya molende mpo na kokoma moyekoli ya solo ya Klisto. Kondima ya molende esengaka kondima likama to kokende na esika oyo oyebi te, mbala mingi oza na na elikya te mpe ozali na ntembe na likambo yango. Kondima ya molende ezali likambo ya mpiko mpe kondima, ezali lokola moto oyo andimi kotya bomoi na ye na likama na likambo oyo ekoki kozala na litomba moko te. Diksionere moko (Free Dictionary) elobi ete kozala na molende elimboli kosala likambo oyo ezali likama mpe ezali na likama, kasi oyebi te nsuka nango ekozala ndenge nini. Ekoki mpe kolimbola lokola kotyela likambo moko motema na esika ya kotalela yango liboso to komibongisa mpo na yango.

Mayele wana ya Yesu ezalaki polele te mpamba te ezalaki na boyokani na makambo ya kala te; liboso ata mokufi miso moko te abikisamaki na nzela ya mwango wana mpe mokufi miso wana amibongisaki te mpona mwango yango, kasi azwaki likama kozanga koyeba mpenza ndenge makambo masengelaki kosuka. Mbala boni osili komikotisa yo moko kati na lolenge wana ya kondima? Omibongisi mpo na komipimela makambo mosusu, kozwa likama mpe kokende na esika oyo eyebani te mpo na Klisto ? Abalayama asalaki yango. Atikaki libota na ye, baninga na ye mpe ekolo na ye mpo na kokende na esika eyebani te, kasi nsuka na yango ezalaki na nkombo mingi na boye lelo oyo tozali kokumisa ye lokola Tata na biso na kondima. Moto moko alobaki soki kosalela internet ezalaki na mikolo ya Abalayama, akoki kosalela Google mpo na koluka esika oyo azalaki kokende, kasi ezali solo te. Ata na zela ya Tekinoloji ya Goodle, osengeli koyeba eskia ozali kokende liboso ya kobima na ndako na yo, Goodle yango moko ekotuna yo esika ozali kokende. Kolanda Klisto to kosalela Nzambe esengaka kosala milende kasi ememaka matoma mingi. Mwasi oyo azalaki na maladie ya kotanga makila, atyaki bomoi na ye na likama na ndenge abukaki mibeko ya mboka na ntango ayebi te soki kosimba yesu ekosuka boni.

Soki tolingi kokokisa malamu mokumba monene oyo epesameli biso ya kosakola nsango malamu, tosengeli kozala bato oyo bandimaka kotya bomoi na bango na likama mpe bato oyo bazali pene ya kopesa ntango, makasi mpe mosolo na biso mpo na kosalisa baoyo nsango malamu nano akomeli bango te. “Qui ne risqué rien n’a rien” (Lisese ya Lifalanse) oyo elimboli « Moto oyo amipesaka na likama te azwaka eloko te ». Bamizilma bazali kotya bomoi na bango na likama mpo na bindimeli na bango kasi baklisto mingi basalaka yango te mpo na nsango malamu ya Yesu Klisto. Tika ete ozala moko kati na baoyo bazali komitya na likama mpo na nsango malamu ya Yesu.

Libondeli: Na nkombo ya Yesu, nabongami kosalela Nzambe mpe kondima makama mpona ntina ya sango malamu. Nakomitya na likama na lolenge nyonso mpo na kondimisama ete nsango malamu ekokomela bato nyonso na nkombo ya Yesu Masiya Nasambeli, AMEN.

Botangi mosusu: Ebandeli 12:1-4| Baloma 10:17|Baloma 4:19|Malako 5:24-34|

Makomi

Mokolo 1Mokolo 3

Oyo etali Ebongiseli oyo

Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 3

Ntango bokonzi ya bokeli mpe ya mayele ya sika ekutani na elikya mpe kondima, makamwisi ekomaki likambo ya mikolo nyonso. Oyo Yesu alobi na yo ezali na motuya mingi koleka oyo bato bazoloba na yo. Bato bakoki kotyola bofuluki na yo mpo ete bayebi te lolenge nini esalamaki to mpo na zuwa, yo kangama ngwi, yeba nani ozali mpe batela kondima na yo kati na Klisto.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d