Kobengama na Leadership ya BowumbuMwa ndambo
Sécurité ya Leadership
Eza facile kokanisa ete leadership pe bosali ekoki kozala esika moko te. Kasi tosengeli koyeba ete soki tolingi kokamba ndenge Yesu akambelaki, tosengeli po kosalela ndenge YE asalelaki. Leader lokola mosali aza mosali liboso azala leader. Na ndambo ya liboso ya évangile ya Mark, Yesu alakisami lokola mosali oyo akambaki, pe na ndambo ya suka Yesu alakisami lokola mokambi oyo asalaki lokola mowumbu.
Tokoki komikumisa po na kobikisama na biso te po yango eza libonza ofele ya Nzambe. Grace ebengi biso na ministère ya leadership, donc tokoki komikumisa po na grace yango p kutu te. Oyo eza en contradiction na bato oyo bakanisi ete leadership eza promotion. Liboso Yesu abanda minister public na ye, Tata na YE a pambolaki ye pe alobaki ete, “Oyo Mwana na ngai, oyo nalingi mbgi; Nasepeli mingi likolo na ye.” (Matthieu 3:17) Yesu ateyaki naeno te pe asalaki miracle ata moko naeno te, kasi Nzambe alingaki pe andimaki ye mobimba deja. Soki oza na bana, oyebi ete olingi bana na yo po ete baza bana na yo; olingaka bango ata soki bizaleli na bango eza malamu te. Peut-etre eza na tango okanisaka ete osengeli ozala ndenge boye to ndenge boye na tina ete oza leader po na ko kozua mapamboli to nguya na Nzambe. Yebisa yo tango nioso ete oza mwan’a Nzambe na tina ya mbotama na yo na libota na ye, oza mwana na ye na tina ya ezaleli te.
Na Luc 10, tomoni Marthe az’o luka losako na mosala oyo epesamelaki ye, alors que Marie a lukaki losako na ye na makolo ya Yesu. Yeba ete relation eza liboso, pe responsabilité eye sima. En tant que leader, yeba ete kosala lokola mowumbu eza ezaleli na yo, titre te, pe yango eza demotion mbala ata moko te.
Ministère ya Yesus ezali orienté na bato misusu. A kambaki pe asalelaki bango na kolongola pasi na bango pe kopesa bango bien-etre. Au contraire, minister ya ba leader Chrétien mingi lelo eza orienté epayi na bango mongo moko. Na ndakisa, tala tango Yesus a leyisaki bato 5000 na mapa mike pe mwa mbisi. Lelo, Satana a baloli model wana, pe tokomi na ba ndako’a Nzambe etondi na bato 5000 bazo leyisa moto moko: papa Pasteur to leader. Eza mawa mingi, histoire ya l’église etondi na ba prevue na kolakisa ete ba communauté oyo balandi papa Pasteur lokola centre pe hiérarchie ya leadership na makambo oyo basali, esukaka malamu te. En retour, leader aza moto oyo ayambi pe asaleli autorité na ye po na bolamu ya bato pe ban’a Nzambe. Na loboko moko, leader amemi mopanga ya Molimo po na kobundisa ba eneni ya Nzambe pe kobatela to ko protégé bana na YE. Na loboko mosusu, leader asengeli komema serviette ya bosaleli lokola mowumbu, po na kosokola makolo ya bato na ndenge Yesu asalaki.
Lelo, kobosa te identité na yo: oza mwan’a Nzambe. Po na yango, mosala ata moko te ekobakisa motuya na yo liboso na ye pe mosala ata moko te ekokitisa motuya na yo na miso na YE. Omemi grace na ye pe oza oint, po ete combat spirituel eza liboso na yo oyo osengeli kobunda po na délivrance ya bato na se ya responsabilité na yo. Tika ete leadership ya bosaleli na yo ewuta na esika ya sécurité ya bolingo ya Tata na yo na Likolo pe tika ete tina na yo ya kosalela bo kokamba ezala po na bolamu ya bato misusu.
Oyo etali Ebongiseli oyo
Tosengami tokamba lokola Yesu. Leadership nde ebandi na caractèr, kasi titre te, pe tina n’ango eza komema ban’a Nzambe kosala mokano na ye. Ba dévotion oyo ya mokolo na mokolo ekosalisa yo kotonga foundation makasi na leadership na yo, po obosana te ete liboso ozala leader oza mosali, pe liboso ozala mosali oza mwan’a Nzambe.
More
Tolingi kopesa matondo mingi na "Afrika Mhlophe mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://afrikam.co.za/