Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Kobengama na Leadership ya BowumbuMwa ndambo

Kobengama na Leadership ya Bowumbu

MOKOLO 2 NA 5

Ba Leaders Ba Pusaka Bato

Kanisa bato oyo bazalaki na influence makasi na bomoi na yo, ba pusaki yo – na nzoto na yo to makanisi – wuta esika moko te esika mosusu. Na bosolo nioso, leader aza moto oyo, na bokasi pe ngolu ya Nzambe, apesaka direction pe makanisi ya kopusa bato na esika oyo Nzambe alingi bango bazala. Wuta ba leader ya Biblia lokola Moise, Néhémie pe misusu, tokoki komona oyo elingi koloba kotambolisama na makasi na biso moko te, kasi kotambolisama na nguya ya Nzambe.

Moise a kolaki na ba privilege ebele na Egypte, pe a kimaki na esobe pe akomaki mobateli na mpate. Na komitunaka nini ekokaki koleka soki Moise akutanaki na Nzambe te na ndenge wana. Kasi Nambe nde ami monisaki pe a lakisaki Moise situation ya bana na YE – pe ba mpasi na bango. En fait, Moise a zuwaki bu leadership na ye likolo ya situation mabe ya bana ya Nzambe na Egypte, pe ba leader ebele sima na ye bakomaki ba leadership na tina ya ba situation mabe ya bato oyo basengelaki ba kumba pe basalisa.

Moise azalaki combatant na losambo, prophete, pe mosali y aba miracle. Kasi leadership na ye ebotamaki na kati y aba situation wan ate, ata ba situation yango ezalaki na motuya. Bu leadership na ye emonisamaki na ndenge Nzambe akumbaki bana na ye wuta bowumbe tin a liberté. Bisaleli to ba nzela ya leadership eza nzela kaka ememi esika ya suka. Na suka na yango, Nzambe akomisi bana na YE esika oyo aponaki po na bango. Eza motuya mingi totiya miso na biso na bisaleli ya leadership te, kasi totiya miso na biso na esika oyo tolingi kokumba bato.

Moise akotaki na La Terre Promise te. Vision na ye ya bato ezalaki po na ye moko te, kasi yango ewumelaki tango ebele sima na ye. Ba leader ebele, au contraire, bakotaka na “La Terre Promise”, alors que bato oyo basengeli bakumba kuna basikala be baza naeno na “Egypt”. Soki bokasi na bango eza ba objectif a Nzambe kasi lokumu na bango moko te, leader ya solo akoki kotika moto ata moko na sim ate. Leader aza lokola pont, kati ya bomoyi oyo bato batiki sima na bango pe bomoyi oyo eza liboso na bangoo. Baza lokola ba facilitateur ya destine, pe leadership na bango eza mésuré na ndenge bomoyi ya bato na se na bango ebongolami.

Soki tokumbi baton a ndenge oyo Yesus asengi biso tokumba bango, toko kanisela bato misusu kasi biso moko te. Tika ete Nzambe ye moko apesa biso nguya pe makasi ya koyeba esika wapi alingi komema bana na YE, pe mayele ya kokumba bango na nzela elongobani, na nzela ememi bango esika a destinaki bango. Tika pe tozala na ba mposa na komi kumisama biso moko te, kasi to mikitisa po tozala lokola pont kati ya esika bato bawuti pee sika baz’o kende, esili biso ko rapelé bango tango nioso ete elikia esilaka te.

Oyo etali Ebongiseli oyo

Kobengama na Leadership ya Bowumbu

Tosengami tokamba lokola Yesu. Leadership nde ebandi na caractèr, kasi titre te, pe tina n’ango eza komema ban’a Nzambe kosala mokano na ye. Ba dévotion oyo ya mokolo na mokolo ekosalisa yo kotonga foundation makasi na leadership na yo, po obosana te ete liboso ozala leader oza mosali, pe liboso ozala mosali oza mwan’a Nzambe.

More

Tolingi kopesa matondo mingi na "Afrika Mhlophe mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://afrikam.co.za/