Mitango 9
9
Mokolo ya kosepela feti ya Pasika
1Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai, na sanza ya liboso ya mobu oyo ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito. Alobaki na ye : 2« Tika ete bana ya Isalaele basepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama. 3Bosala feti yango na tango oyo ekatama, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza oyo, kolanda mibeko mpe malako na yango nyonso. »
4Boye, Moyize ayebisaki bana ya Isalaele ete basepelaka feti ya Pasika. 5Basepelaki Pasika kati na esobe ya Sinai, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya liboso. Bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize.
6Kasi bato mosusu kati na bango basepelaki Pasika te na mokolo wana, pamba te bazalaki mbindo mpo ete basimbaki ebembe. Boye, kaka na mokolo wana, bakendeki komona Moyize na Aron 7mpe bayebisaki Moyize :
— Tokomi mbindo mpo ete tosimbaki ebembe. Boye, mpo na nini te biso mpe tomema likabo na biso epai na Yawe elongo na bato mosusu ya Isalaele ?
8Moyize azongiselaki bango :
— Bozela nanu ete naluka koyeba makambo oyo Yawe atindi na tina na bino.
9Boye Yawe alobaki na Moyize :
10— Yebisa bana ya Isalaele : « Soki moko kati na bino to kati na bakitani na bino akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe na mokolo wana, ezala soki azali mosika na mobembo, akoki kosepela feti ya Pasika mpo na lokumu na Yawe. 11Basengeli kosepela yango na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale ; bakolia mwana meme elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo. 12Bakotika eloko moko te kino na tongo mpe bakobuka mokuwa ata moko te. Basengeli kolanda mibeko na yango nyonso na tango ya kosepela feti ya Pasika. 13Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama ; akomema mikumba ya masumu na ye. 14Soki mpe mopaya oyo avandi kati na bino alingi kosepela Pasika ya Yawe, asengeli kosala kaka bongo, asengeli kolanda mibeko mpe malako na yango. Ezala mpo na bapaya to mpo na bana mboka, bosengeli kozala na mibeko ya losambo ya ndenge moko. »
Lipata na likolo ya Mongombo
15Na mokolo oyo batelemisaki Mongombo, lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Litatoli. Wuta na pokwa kino na tongo, lipata oyo ezalaki likolo ya Mongombo ezalaki komonana lokola moto. 16Mpe ekobaki kozala kaka ndenge wana : lipata ezalaki kozipa Mongombo ; bongo na butu, ezalaki komonana lokola moto. 17Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo, bana ya Isalaele mpe bazalaki kokende ; mpe esika nyonso oyo lipata ezalaki kotelema, esika wana nde bazalaki mpe kosala molako na bango. 18Ezalaki na mitindo na Yawe kaka nde bana ya Isalaele bazalaki kotambola mpe kosala molako na bango. Tango nyonso lipata ezalaki kowumela na likolo ya Mongombo, bango mpe bazalaki kowumela na molako. 19Soki lipata ewumeli tango molayi likolo ya Mongombo, bana ya Isalaele bazalaki kotosa mitindo na Yawe mpe bazalaki kokende te. 20Soki mpe lipata esali kaka mwa ndambo ya mikolo na likolo ya Mongombo, na mitindo na Yawe, bazalaki kowumela na molako na bango ; mpe bazalaki kokende soki kaka Yawe apesi mitindo. 21Na mbala mosusu, lipata ezalaki kowumela butu moko kaka, wuta na pokwa kino na tongo ; bongo tango ezalaki kolongwa na tongo na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, bango mpe bazalaki kokende. To mpe ezalaki kosala mokolo moko mpe butu moko ; mpe soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende. 22Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende. 23Ezalaki kaka na mitindo na Yawe nde bazalaki kowumela na molako to kokende. Boye, bazalaki kosala mosala ya Yawe kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize.
Currently Selected:
Mitango 9: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.