Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mitango 10

10
Bakelelo mibale ebeti mpe lisanga esangani
1Yawe alobaki na Moyize : 2« Sala bakelelo mibale na palata oyo batuta. Okosalela yango mpo na kobengisa lisanga mpe mpo na kopesa mitindo ya kolongola molako. 3Soki bakelelo nyonso mibale ebeti nzela moko, lisanga mobimba ekosangana pembeni na yo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 4Soki kelelo moko kaka nde ebeti, kaka bakambi, bakonzi ya bituka ya Isalaele nde bakosangana liboso na yo. 5Soki kelelo ebeti makasi, mabota oyo etongi molako na ngambo ya este ekokende. 6Soki ebeti makasi mpo na mbala ya mibale, mabota oyo etongi molako na ngambo ya sude ekokende. Ebeteli ya kelelo nde ekozala elembo mpo na kopesa mbela ya kokende. 7Mpo na kosangisa lisanga, beta bakelelo, kasi makasi te.
8Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bango nde bakobanda kobeta bakelelo yango. Ekozala mobeko ya libela mpo na bino mpe bakitani na bino.
9Tango, kati na mokili na bino moko, bokokende na bitumba mpo na kotelemela monguna oyo azali konyokola bino, bokobeta bakelelo na bino makasi. Boye, Yawe, Nzambe na bino, akokanisa bino mpe akokangola bino na maboko ya banguna na bino. 10Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. »
Bana ya Isalaele balongwe na Sinai
11Na mokolo ya tuku mibale, ya sanza ya mibale, ya mobu oyo ya mibale, lipata etelemaki na likolo ya Mongombo ya Litatoli. 12Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani. 13Ezalaki mbala na bango ya liboso ya kolongwa na molako mpe kotambola kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. 14Mampinga ya molako ya Yuda ezalaki kotambola liboso, elongo na bendele na bango. Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, nde azalaki mokonzi na bango. 15Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Isakari. 16Eliabi, mwana mobali ya Eloni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Zabuloni.
17Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki. 18Mampinga ya molako ya Ribeni elandaki na sima mpo na kotambola. Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, nde azalaki mokonzi na bango. 19Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Simeoni. 20Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Gadi.
21Sima, bato ya Keati bakendeki mpe bamemaki biloko ya bule. Balevi mosusu bazalaki kotonga Mongombo liboso ete bakoma. 22Mampinga ya molako ya Efrayimi elandaki mpe na sima mpo na kotambola. Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, nde azalaki mokonzi na bango. 23Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Manase. 24Abidani, mwana mobali ya Gideoni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Benjame.
25Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango. 26Pagieli, mwana mobali ya Okirani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Aseri ; 27mpe Akira, mwana mobali ya Enani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Nefitali. 28Wana nde ezalaki molongo oyo mampinga ya bana ya Isalaele ezalaki kotambola na yango.
Moyize aluki motambolisi
29Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize :
— Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki : « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele.
30Obabi azongiselaki ye :
— Te ! Nakokende elongo na bino te, nakozonga na mboka na ngai, kati na libota na ngai.
31Kasi Moyize alobaki :
— Nabondeli yo : kotika biso te, pamba te yo nde oyebi bisika oyo tosengeli kotonga molako kati na esobe ; okozala motambolisi na biso. 32Soki otamboli na biso elongo, tokokabola elongo na yo eloko nyonso ya malamu oyo Yawe akopesa biso.
33Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema. 34Na moyi, lipata na Yawe ezalaki likolo na bango, na tango bazalaki kolongola molako.
35Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba :
« Oh Yawe, telema !
Tika ete banguna na Yo bapalangana !
Tika ete banguna na Yo bakima liboso na Yo ! »
36Mpe tango nyonso lipata ezalaki kopema, azalaki koloba :
« Oh Yawe, zonga kati na bana ya Isalaele,
pamba te bazali ebele penza ! »

Currently Selected:

Mitango 10: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo