Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mitango 34

34
Bandelo ya Kanana, mboka ya elaka
1Yawe alobaki na Moyize : 2« Pesa mitindo oyo na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na Kanana, tala mokili oyo ekopesamela bino lokola libula, mokili ya Kanana elongo na bandelo na yango oyo :
3Na ngambo ya sude, mondelo na bino ekobanda na esobe ya Tsini mpe ekolanda mondelo ya mokili ya Edomi. Na ngambo ya este, mondelo na bino ya sude ekobanda na ebale monene ya Barozo, 4ekokita na sude ya ebandeli ya ngomba Akarabimi mpe ekoleka na Tsini kino na sude ya Kadeshi-Barinea ; ekokoba na Atsari-Adari mpe ekoleka na Atsimoni. 5Longwa na Atsimoni, ekoleka na mayi ya lubwaku ya Ejipito mpo na kosuka na ebale monene.
6Mondelo na bino ya ngambo ya weste ekozala ebale monene Mediterane.
7Na ngambo ya nor, mondelo na bino ekobanda na ebale monene Mediterane kino na ngomba Ori. 8Longwa na ngomba Ori, bokolekisa yango na Lebo-Amati mpo na kosuka na Tsedadi. 9Longwa na Tsedadi, ekoleka na Zifironi mpe ekokoma na Atsari-Enani. Yango nde ekozala mondelo na bino ya ngambo ya nor.
10Na ngambo ya este, mondelo na bino ekobanda na Atsari-Enani kino na Shefami ; 11longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este, 12kino na Yordani mpo na kosuka na ebale monene ya Barozo.
Ezali ndenge wana nde mokili na bino ekozala elongo na bandelo oyo ezingeli yango. › »
Moyize apesi mitindo ya sika mpo na kokabola mokili
13Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo. 14Pamba te ndako na ndako ya libota ya Ribeni mpe ndako na ndako ya libota ya Gadi elongo na ndambo ya libota ya Manase esilaki kozwa libula na yango. 15Mabota oyo mibale na ndambo ezwaki libula na yango na ngambo ya este ya Yordani, oyo etalana na Jeriko. »
Yawe aponi bato mpo na kokabola mokili
16Yawe alobaki lisusu na Moyize : 17« Tala bato oyo bakokabola mokili kati na bino : Nganga-Nzambe Eleazari mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni. 18Bokozwa lisusu mokambi moko kati na libota moko na moko mpo na kokabola mokili.
19Tala bakombo na bango :
Mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;
20mpo na libota ya Simeoni : Samuele, mwana mobali ya Amiwudi ;
21mpo na libota ya Benjame : Elidadi, mwana mobali ya Kisiloni ;
22mpo na libota ya Dani : mokambi Buki, mwana mobali ya Yogili ;
23mpo na bana ya Jozefi, libota ya Manase : mokambi Anieli, mwana mobali ya Efodi ;
24libota ya Efrayimi : mokambi Kemweli, mwana mobali ya Shifitani ;
25mpo na libota ya Zabuloni : mokambi Elitsafani, mwana mobali ya Parinaki ;
26mpo na libota ya Isakari : mokambi Palitieli, mwana mobali ya Azani ;
27mpo na libota ya Aseri : mokambi Ayiwudi, mwana mobali ya Shelomi ;
28mpo na libota ya Nefitali : mokambi Padeyeli, mwana mobali ya Amiwudi. »
29Bango wana nde bato oyo Yawe apesaki mokumba ya kokabola mokili ya Kanana kati na bana ya Isalaele.

Currently Selected:

Mitango 34: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo