Mitango 33
33
Mobembo ya Isalaele : longwa na Ejipito kino Kanana
1Tala bisika oyo bana ya Isalaele batongaki milako na bango tango bazalaki na mobembo wuta na mokili ya Ejipito. Bazalaki kotambola na molongo ya bitumba na bokambami ya Moyize mpe Aron. 2Moyize akomaki na mokanda bisika nyonso oyo bazalaki koleka na etinda ya Yawe. Tala bakombo ya moko na moko ya bisika yango :
3Bana ya Isalaele balongwaki na Ramisesi na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya liboso ; ezalaki mokolo oyo elandaki mokolo ya Pasika. Babimaki na matata te na miso ya bato nyonso ya Ejipito, 4wana bato ya Ejipito bazalaki kokunda bibembe ya bana mibali na bango ya liboso oyo Yawe abetaki mpo na kopesa etumbu na banzambe na bango.
5Tango balongwaki na Ramisesi, bana ya Isalaele bakendeki kotonga molako na bango na Sukoti. 6Kolongwa na Sukoti, bakendeki kotonga molako na bango na Etami, pene ya mondelo ya esobe. 7Tango balongwaki na Etami, bazongaki na ngambo ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni, mpe batongaki molako na bango liboso ya Migidoli. 8Kolongwa na Pi-Ayiroti, bakatisaki ebale monene mpe bakomaki na esobe ; batambolaki mikolo misato na esobe ya Etami mpe batongaki molako na bango, na Mara. 9Kolongwa na Mara, bakomaki na Elimi epai wapi bakutaki bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ; batongaki molako na bango kuna. 10Kolongwa na Elimi, bakendeki kotonga molako na bango pene ya ebale monene ya barozo. 11Kolongwa na ebale monene ya barozo, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Tsini. 12Kolongwa na esobe ya Tsini, bakendeki kotonga molako na bango na Dofika. 13Kolongwa na Dofika, bakendeki kotonga molako na bango na Alushi. 14Kolongwa na Alushi, bakendeki kotonga molako na bango na Refidimi epai wapi bato bazangaki mayi ya komela.
15Kolongwa na Refidimi, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Sinai. 16Kolongwa na esobe ya Sinai, bakendeki kotonga molako na bango na Kibiroti-Atava. 17Kolongwa na Kibiroti-Atava, bakendeki kotonga molako na bango na Atseroti. 18Kolongwa na Atseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Ritima. 19Kolongwa na Ritima, bakendeki kotonga molako na bango na Rimoni-Peretsi. 20Kolongwa na Rimoni-Peretsi, bakendeki kotonga molako na bango na Libina. 21Kolongwa na Libina, bakendeki kotonga molako na bango na Risa. 22Kolongwa na Risa, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Keyelata. 23Kolongwa na ngomba Keyelata, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Seferi. 24Kolongwa na ngomba Seferi, bakendeki kotonga molako na bango na Arada. 25Kolongwa na Arada, bakendeki kotonga molako na bango na Makeyeloti. 26Kolongwa na Makeyeloti, bakendeki kotonga molako na bango na Taati. 27Kolongwa na Taati, bakendeki kotonga molako na bango na Tera. 28Kolongwa na Tera, bakendaki kotonga molako na bango na Mitika. 29Kolongwa na Mitika, bakendaki kotonga molako na bango na Ashimona. 30Kolongwa na Ashimona, bakendeki kotonga molako na bango na Moseroti. 31Kolongwa na Moseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Bene-Yaakani. 32Kolongwa na Bene-Yaakani, bakendeki kotonga molako na bango na Ori-Gidigadi. 33Kolongwa na Ori-Gidigadi, bakendeki kotonga molako na bango na Yotibata. 34Kolongwa na Yotibata, bakendeki kotonga molako na bango na Abrona. 35Kolongwa na Abrona, bakendeki kotonga molako na bango na Etsioni-Geberi. 36Kolongwa na Etsioni-Geberi, bakendeki kotonga molako na bango na Kadeshi, na esobe ya Tsini. 37Kolongwa na Kadeshi, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Ori, na mondelo ya Edomi.
38Ezali kuna na ngomba Ori nde, kolanda etinda ya Yawe, Nganga-Nzambe Aron amataki mpe akufaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, sima na mibu tuku minei wuta bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. 39Aron azalaki na mibu ya mbotama nkama moko na tuku mibale na misato tango akufaki likolo ya ngomba Ori.
40Boye, mokonzi ya Aradi, moto ya mboka Kanana, oyo azalaki kovanda na Negevi ya mboka Kanana, ayokaki sango ya koya ya bana ya Isalaele.
41Tango balongwaki na ngomba Ori, bakendeki kotonga molako na bango na Tsalimona. 42Kolongwa na Tsalimona, bakendeki kotonga molako na bango na Punoni. 43Kolongwa na Punoni, bakendeki kotonga molako na bango na Oboti. 44Kolongwa na Oboti, bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na mondelo ya Moabi. 45Kolongwa na Iye-Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na Diboni-Gadi. 46Kolongwa na Diboni-Gadi, bakendeki kotonga molako na bango na Alimoni-Dibilatayimi. 47Kolongwa na Alimoni-Dibilatayimi, bakendeki kotonga molako na bango na bangomba Abarimi, pembeni ya Nebo. 48Kolongwa na bangomba Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko. 49Batongaki molako na bango pembeni ya Yordani, kolongwa na Beti-Yeshimoti kino na Abele-Shitimi, na etando ya Moabi.
Mitindo mpo na kokabola mokili ya Kanana
50Na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko, Yawe alobaki na Moyize : 51« Loba na bana ya Isalaele, mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokatisa ebale Yordani mpo na kokota na mokili ya Kanana, 52bokobengana bato nyonso oyo bavandaka na mboka yango, bokosilisa kobuka banzambe nyonso ya bikeko oyo basala na mabanga, na bibende banyangwisa na moto mpe bokobebisa bisambelo na bango nyonso ya likolo ya bangomba. 53Bokobotola mokili yango mpe bokokoma kovanda kuna, pamba te napesi bino mokili yango mpo ete bobotola yango. 54Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino : libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene ; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino. 55Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda. 56Boye, nakosala bino ndenge nakanaki kosala bango. › »
Currently Selected:
Mitango 33: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.