Mitango 3
3
Yawe apesi na libota ya Levi misala
1Tala bakitani ya Aron mpe ya Moyize na tango oyo Yawe asololaki na Moyize, na ngomba Sinai.
2Bakombo ya bana mibali ya Aron ezalaki : Nadabi, mwana ya liboso ; Abiyu, Eleazari mpe Itamari.
3Yango nde bakombo ya bana mibali ya Aron, oyo babulisaki na nzela ya kopakola mafuta mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe. 4Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya Yawe tango bazalaki kobonza mbeka, na nzela ya moto oyo ebulisama te, liboso ya Yawe, na esobe ya Sinai. Batikalaki kozala na bana te. Boye Eleazari mpe Itamari kaka nde batikalaki kosala mosala ya bonganga-Nzambe na bokambami ya tata na bango, Aron.
5Yawe alobaki na Moyize : 6« Yeisa libota ya Levi pene ya Nganga-Nzambe Aron mpe pesa bango na maboko na ye mpo ete basunga ye. 7Bakosalisa ye mpe bakosunga lisanga mobimba liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na kosala misala ya Mongombo. 8Bakobatela bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bakosalisa bana ya Isalaele na nzela ya kosala mosala ya Mongombo. 9Pesa Balevi na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bango nde kati na bana ya Isalaele basengeli komipesa mobimba epai na ye. 10Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. »
11Yawe alobaki lisusu na Moyize : 12« Nakamati Ngai moko Balevi kati na bana ya Isalaele na esika ya bana mibali nyonso ya liboso, mbuma ya liboso ya libumu ya mwasi nyonso ya Isalaele. 13Pamba te, bana nyonso ya liboso bazali ya Ngai. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso ya Ejipito, natiaki pembeni bana nyonso ya liboso ya Isalaele mpo ete bazala ya Ngai, ezala bana ya bato to ya banyama. Nazali Yawe. »
Moyize atangi motango ya Balevi
14Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai : 15« Tanga motango ya Balevi kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Tanga bana mibali nyonso kobanda na ye oyo azali na sanza moko ya mbotama mpe koleka. »
16Boye, Moyize atangaki bango ndenge Yawe atindaki ye.
17Tala bakombo ya bakitani ya Levi :
Gerishoni, Keati mpe Merari.
18Tala bakombo ya bakitani ya Gerishoni, kolanda etuka moko na moko :
Libini mpe Shimei.
19Bana mibali ya Keati, kolanda etuka moko na moko :
Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli.
20Bana mibali ya Merari, kolanda etuka moko na moko :
Maali mpe Mushi.
Bango nde bato ya bituka ya Balevi kolanda mabota na bango.
21Tala bakitani oyo babimelaki na Gerishoni : etuka ya bato ya Libini mpe etuka ya Shimei. Bango nde bato ya bituka ya Gerishoni.
22Motango ya mibali nyonso oyo batangamaki kobanda sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto sambo na nkama mitano.
23Bato ya bituka ya Gerishoni batongaki molako na bango na sima ya Mongombo, na ngambo ya weste.
24Eliazafi, mwana mobali ya Laele, nde azalaki mokambi ya libota ya Gerishoni.
25Na Ndako ya kapo ya Bokutani, bakitani ya Gerishoni bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo mpe ndako ya kapo, bizipelo na yango, rido ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, 26barido ya lopango, rido ya ekuke ya lopango oyo ezingela Mongombo mpe etumbelo, basinga mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela na basinga wana.
27Tala bakitani oyo babimelaki na Keati :
bituka ya bato ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli.
Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Keati.
28Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto mwambe na nkama motoba.
Bato ya Keati bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
29Bato ya bituka ya Keati batongaki molako na bango pembeni ya Mongombo, na ngambo ya sude.
30Elitsafani, mwana mobali ya Uzieli, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Keati.
31Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela.
32Mokambi ya bakambi ya Balevi ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. Aponamaki mpo ete akamba bato oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule.
33Tala bakitani oyo babimelaki na Merari :
bato ya etuka ya Maali mpe bato ya etuka ya Mushi.
Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Merari.
34Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki na sanza moko ya mbotama mpe koleka, oyo batangamaki ezalaki nkoto motoba na nkama mibale.
35Tsurieli, mwana mobali ya Abiyaili, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Merari.
Batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Mongombo.
36Bato ya Merari bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso ya Mongombo, oyo basala na mabaya : balate na yango, makonzi na yango, makolo na yango mpe biloko nyonso ya mike oyo bazalaki kokangisela yango. 37Bazalaki mpe lisusu na mokumba ya kobatela makonzi oyo ezalaki zingazinga ya lopango, bapike ya Ndako ya kapo mpe basinga na yango.
38Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani.
Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.
Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye.
39Motango nyonso ya Balevi oyo Moyize mpe Aron batangaki kolanda mitindo ya Yawe, mpe bato ya bituka na bango, mibali nyonso kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki bato nkoto tuku mibale na mibale.
Moyize atangi motango ya bana mibali ya liboso
40Yawe alobaki na Moyize : « Tanga motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele, oyo bazali na sanza moko ya mbotama mpe koleka, mpe koma bakombo na bango. 41Okotia Balevi pembeni mpo na Ngai, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele nyonso ya Balevi, na esika ya bana ya liboso ya bibwele nyonso ya Isalaele. Nazali Yawe. »
42Boye, Moyize atangaki motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya Isalaele ndenge Yawe atindaki ye. 43Motango nyonso ya bana mibali ya liboso, oyo bakomaki bango bakombo, wuta na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale na tuku sambo na misato.
44Yawe alobaki lisusu na Moyize : 45« Tia Balevi pembeni, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele ya Balevi, na esika ya bibwele ya bana ya Isalaele. Balevi bazali ya Ngai. Nazali Yawe. 46Mpo na kosikola bana ya liboso ya Isalaele nkama mibale na tuku sambo na misato oyo baleki na motango ya Balevi, 47okokongola mbongo ya bibende, nkama mitano, kolanda ndenge batangaka mbongo kati na Esika ya bule, mpo na moto moko na moko. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale. 48Okopesa mbongo oyo osikoleli bana mibali nyonso, oyo baleki na motango ya Balevi, epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali. »
49Boye Moyize akongolaki mbongo ya lisiko epai ya bato oyo balekaki na motango ya bana liboso oyo Balevi oyo basikolaki. 50Azwaki na maboko ya bana liboso ya Isalaele mbongo ya bibende nkoto moko na nkama misato na tuku motoba na mitano kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule. 51Bongo Moyize apesaki mbongo yango ya lisiko epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali, ndenge kaka Yawe atindaki ye.
Currently Selected:
Mitango 3: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.