Mitango 2
2
Bana ya Isalaele batongi milako
1Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : 2« Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga ; moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye, zingazinga ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwa mosika na yango. »
3Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka,
milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi. 4Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba.
5Bato ya libota ya Isakari bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Yuda. Mokambi ya bato ya Isakari ezali Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari. 6Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na minei na nkama minei.
7Mpe bato ya libota ya Zabuloni bakozala pembeni ya bato ya libota ya Isakari. Mokambi ya bato ya Zabuloni ezali Eliabi, mwana mobali ya Eloni. 8Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei.
9Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Yuda ezali bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na motoba na nkama minei kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala liboso.
10Na ngambo ya sude,
milongo ya mampinga ya Ribeni bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Ribeni ezali Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri. 11Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano.
12Bato ya libota ya Simeoni bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Ribeni. Mokambi ya bato ya Simeoni ezali Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi. 13Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato.
14Mpe bato ya libota ya Gadi bakozala pembeni ya bato ya libota ya Simeoni. Mokambi ya bato ya Gadi ezali Eliazafi, mwana mobali ya Deweli. 15Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba na tuku mitano.
16Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Ribeni ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na moko na nkama minei na tuku mitano kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na sima.
17Bongo Ndako ya kapo ya Bokutani mpe molako ya Balevi ekozala na kati-kati ya milako. Bakokende na molongo ndenge batielaki milako na bango, moko na moko na esika na ye mpe na se ya bendele na ye.
18Na ngambo ya weste,
milongo ya mampinga ya Efrayimi bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Efrayimi ezali Elishama, mwana mobali ya Amiwudi. 19Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na nkama mitano.
20Bato ya libota ya Manase bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Efrayimi. Mokambi ya bato ya Manase ezali Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri. 21Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale.
22Mpe bato ya libota ya Benjame bakozala pembeni ya bato ya libota ya Manase. Mokambi ya bato ya libota ya Benjame ezali Abidani, mwana mobali ya Gideoni. 23Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mitano na nkama minei.
24Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Efrayimi ezali bato nkoto nkama moko na mwambe na nkama moko, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na molongo ya misato.
25Na ngambo ya nor,
milongo ya mampinga ya Dani bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Dani ezali Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi. 26Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo.
27Bato ya libota ya Aseri bakotia molako na bango pembeni ya bato ya libota ya Dani. Mokambi ya bato ya Aseri ezali Pagieli, mwana mobali ya Okirani. 28Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na moko na nkama mitano.
29Mpe bato ya libota ya Nefitali bakozala pembeni ya bato ya libota ya Aseri. Mokambi ya bato ya Nefitali ezali Akira, mwana mobali ya Enani. 30Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
31Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Dani ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na sambo na nkama motoba, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala na sima na bango nyonso, na se ya bendele na bango.
32Bango nde bana ya Isalaele oyo batangamaki, kolanda mabota na bango. Motango ya bato nyonso oyo bazalaki kati na milako, kolanda milongo ya mampinga na bango, ezalaki bato nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano. 33Kasi batangaki Balevi te elongo na bato mosusu ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize.
34Boye, bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. Na lolenge wana nde batiaki milako na bango na se ya babendele na bango mpe batambolaki bongo, moto na moto na libota na ye mpe na etuka na ye.
Currently Selected:
Mitango 2: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.