Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Bilombe 11

11
Tango ya Jefite
1Jefite, moto ya Galadi, azalaki elombe ya bitumba. Azalaki mwana mobali oyo Galadi abotaki na mwasi ya makangu. 2Nzokande mwasi ya Galadi abotelaki ye mpe bana mibali. Mpe tango bakolaki, babenganaki Jefite ; balobaki na ye : « Ozali na libula te kati na ndako ya tata na biso, pamba te ozali mwana ya makangu. »
3Boye, Jefite akimaki mosika ya bandeko na ye ya mibali mpe akomaki kovanda kati na etuka ya Tobi. Bato ya mobulu basanganaki na ye mpe bazalaki kotambola elongo na ye.
4Sima na mwa tango, bato ya Amoni babundisaki Isalaele. 5Wana bato ya Amoni bazalaki kobundisa bana ya Isalaele, bampaka ya Galadi bakendeki koluka Jefite, kati na Tobi. 6Balobaki na Jefite :
— Yaka, mpe zala mokambi na biso mpo ete tobundisa bato ya Amoni.
7Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi :
— Boni, ezali bino te bato oyo boyinaki ngai mpe bobenganaki ngai wuta na ndako ya tata na ngai ? Mpo na nini bozali koya sik’oyo epai na ngai, awa bokomi na pasi ?
8Bampaka ya Galadi balobaki lisusu na Jefite :
— Soki tozongi sik’oyo epai na yo, ezali mpo ete oya elongo na biso, obundisa bato ya Amoni mpe okoma mokonzi na biso, mokonzi ya bavandi nyonso ya Galadi.
9Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi :
— Soki bozongisi ngai mpo na kobundisa bato ya Amoni, bongo Yawe akabi bango na maboko na ngai, boni, nakozala solo mokonzi na bino ?
10Bampaka ya Galadi bazongiselaki Jefite :
— Tika ete Yawe azala Motatoli kati na biso ! Tika ete apesa biso etumbu soki tosali te ndenge olobi.
11Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa.
Jefite atindi bantoma epai ya bato ya Amoni
12Bongo Jefite atindaki bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye :
— Ozwi biso na likambo nini mpo ete oya kobundisa mboka na biso ?
13Mokonzi ya bato ya Amoni azongiselaki bantoma ya Jefite :
— Ezali mpo ete Isalaele abotolaki mokili na ngai tango abimaki na Ejipito ; babotolaki mokili yango longwa na lubwaku ya Arinoni, mayi moke ya Yaboki kino na lubwaku ya Yordani. Sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia.
14Jefite atindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye :
15— Tala maloba oyo Jefite alobi : « Bana ya Isalaele bazwaki mokili ya Moabi te to mokili ya bato ya Amoni te. 16Kasi tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, batambolaki na esobe kino na ebale monene ya Barozo, mpe bakomaki na Kadeshi. 17Batindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi, mpo na koloba na ye : ‹ Pesa biso nzela ya koleka na mokili na yo. › Kasi mokonzi ya Edomi aboyaki koyoka. Bana ya Isalaele batindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya Moabi, kasi ye mpe aboyaki. Boye, bana ya Isalaele bawumelaki na Kadeshi.
18Na sima, batambolaki na esobe mpe babalukaki na sima ya mokili ya Edomi mpe ya Moabi, balekaki na ngambo ya este ya mokili ya Moabi mpe batongaki milako na bango kuna, na ngambo mosusu ya lubwaku ya Arinoni. Kasi bakotaki te na mokili ya Moabi.
19Bongo bana ya Isalaele batindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni mpo na koloba na ye : ‹ Tika biso toleka na mokili na yo mpo ete tokende na esika na biso. › 20Kasi Sikoni andimaki te bana ya Isalaele mpo ete baleka na mokili na ye. Boye asangisaki bato na ye nyonso ; batongaki milako, na Yakatsi, mpe babundisaki Isalaele.
21Kasi Yawe, Nzambe ya Isalaele, akabaki Sikoni mpe bato na ye nyonso na maboko ya bana ya Isalaele, mpe balongaki bango. Boye bana ya Isalaele babotolaki mokili nyonso ya bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na etando wana. 22Babotolaki etuka nyonso ya bato ya Amori, longwa na lubwaku ya Arinoni kino na mayi moke ya Yaboki, longwa na esobe kino na Yordani.
23Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango ? 24Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. 25Boni, ozali malamu koleka Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi ? Boni, asila koswanisa to kobundisa bana ya Isalaele ? 26Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana ? 27Ngai nasali yo mabe te, kasi yo nde ozali kosala ngai mabe na kobundisa ngai. Tika ete Yawe, Mosambisi, akata lelo likambo kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Amoni. »
28Kasi mokonzi ya Amoni aboyaki koyoka maloba oyo Jefite atindelaki ye.
Jefite apesi elaka
29Molimo na Yawe akitelaki Jefite. Jefite akatisaki Galadi mpe Manase, mpe alekaki na Mitsipe ya Galadi. Wuta na Mitsipe ya Galadi, akendeki kobundisa bato ya Amoni. 30Jefite alapaki ndayi epai na Yawe, alobaki : « Soki okabi bato ya Amoni na maboko na ngai, 31nakobonzela Yo, Yawe, lokola mbeka ya kotumba, nyonso oyo ekobima na ekuke ya ndako na ngai mpo na koyamba ngai, tango nakozonga na elonga wuta na bato ya Amoni. »
32Bongo Jefite akatisaki bandelo ya bato ya Amoni, mpe Yawe akabaki bango na maboko na ye. 33Abebisaki bingumba tuku mibale oyo ezali na kati-kati ya Aroeri mpe Miniti kino na Abele-Keramimi. Ezalaki kobebisama ya makasi mpo na bato ya Amoni oyo bakweyaki liboso ya bana ya Isalaele.
Mwana mwasi ya Jefite
34Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye ; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko : azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali. 35Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki :
— Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te.
36Mwana na ye ya mwasi alobaki :
— Tata na ngai, opesaki elaka epai na Yawe. Sala na ngai ndenge olakaki epai na Yawe, pamba te Yawe azongisi mabe na mabe epai ya banguna na yo, bato ya Amoni.
37Abakisaki :
— Pesa ngai nzela ete likambo oyo moko esalema mpo na ngai : Tikela ngai basanza mibale mpo ete nakende koyengayenga mpe kolela, elongo na baninga na ngai, bozangi na ngai koyeba nzoto ya mobali.
38Jefite alobaki na ye :
— Okoki na yo kokende.
Mpe atikaki ye kokende mpo na basanza mibale. Boye mwana mwasi akendeki na ngomba elongo na baninga na ye ya basi, mpe alelaki mpo ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te. 39Sima na basanza mibale, azongaki epai ya tata na ye, Jefite ; mpe Jefite akokisaki epai ya mwana na ye ya mwasi, ndayi oyo alapaki. Nzokande, atikalaki kaka koyeba nzoto ya mobali te. Boye, ekoma momesano kati na Isalaele : 40mibu nyonso, bilenge basi ya Isalaele babimaka mikolo minei, mpo na kosala feti na tina na mwana mwasi ya Jefite, moto ya Galadi.

Currently Selected:

Bilombe 11: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo