Jefite alapaki ndayi epai na Yawe, alobaki : « Soki okabi bato ya Amoni na maboko na ngai, nakobonzela Yo, Yawe, lokola mbeka ya kotumba, nyonso oyo ekobima na ekuke ya ndako na ngai mpo na koyamba ngai, tango nakozonga na elonga wuta na bato ya Amoni. »