Tito 3
3
Etamboli ya baklisto
1Yebisa bango lisusu ete basengeli kotosa bakambi mpe bakonzi, koselingwa mpo na misala nyonso ya malamu, 2komipekisa kotiola bato, kozala bato na kimia, na boboto mpe na bolingo epai ya bato nyonso.
3Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso. 4Kasi tango Nzambe Mobikisi na biso amonisaki boboto mpe bolingo na Ye mpo na bato, 5abikisaki biso. Asalaki bongo mpo na bosembo na biso te, kasi mpo na mawa na Ye na nzela ya Molimo Mosantu oyo akomisaki biso bato ya sika na mokolo ya mbotama na biso ya mibale. 6Nzambe asopelaki biso Molimo Mosantu na bofuluki penza na nzela ya Yesu-Klisto, Mobikisi na biso, 7mpo ete, wana akomisi biso bato ya sembo na nzela ya ngolu na Ye, tokoma bakitani ya libula kolanda elikya ya bomoi ya seko.
8Makambo oyo nawuti koloba ezali penza ya solo ; mpe nalingi ete obetelaka yango sete makasi, mpo ete bato oyo bandimeli Nzambe bamipesa mobimba mpo na kosala misala ya malamu. Yango nde makambo oyo ezali penza malamu mpe na tina mpo na bato.
Bato oyo bamemaka bokabwani
9Kasi kima tembe ya bozoba, masolo ya milongo ya mbotama, koswana mpe bitumba na tina na mibeko : ezali na litomba te mpe ezali na tina te. 10Soki, kati na Lingomba, ezali na moto oyo amemaka bokabwani, kebisa ye, mbala moko, mpe kebisa ye mbala ya mibale. Soki aboyi kaka koyoka, bimisa ye libanda ya Lingomba ; 11pamba te osengeli koyeba ete moto ya ndenge wana abunga nzela, azali kosala masumu ; mpe na ndenge wana, amikateli ye moko etumbu.
Mitindo ya suka
12Tango kaka nakotindela yo Artemasi to Tishike, sala nyonso mpo ete oya epai na ngai, na Nikopolisi, pamba te nazwaki mokano ya kolekisa kuna eleko ya malili makasi.
13Sala nyonso oyo okoki kosala mpo na kosunga mobembo ya Zenasi, molakisi ya Mobeko, mpe Apolosi mpo ete bazanga eloko moko te na nzela. 14Bandeko na biso mpe basengeli koyekola komipesa na misala ya malamu, mpo na kosunga bosenga nyonso mpe kobika bomoi oyo ekobotaka bambuma.
Bambote
15Bato nyonso oyo bazali elongo na ngai batindeli yo mbote.
Pesa mbote na bato oyo balingaka biso kati na kondima.
Tika ete ngolu ya Nzambe ezala na biso nyonso !
Sélection en cours:
Tito 3: MNB
Surbrillance
Partager
Copier

Tu souhaites voir tes moments forts enregistrés sur tous tes appareils? Inscris-toi ou connecte-toi
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.