Logo YouVersion
Îcone de recherche

Matayo 12

12
Yesu mpe mokolo ya Saba
(Mlk 2.23-28; Lk 6.1-5)
1Na tango wana, Yesu alekaki kati na bilanga ya ble na mokolo ya Saba#12.1 Mokolo ya Saba : mokolo ya eyenga ya Bayuda, mokolo ya poso na tango ya lelo. Lokola bayekoli na Ye bakomaki na nzala, babandaki kobuka ble mpe kolia yango. 2Tango Bafarizeo bamonaki bongo, balobaki na Yesu :
— Tala bayekoli na Yo ! Bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba.
3Yesu azongiselaki bango :
— Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala, 4ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ? 5Botikala mpe nanu kotanga te kati na Mobeko ete, na mokolo ya Saba, Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo babukaka mobeko ya Saba, kasi bakweyaka na mbeba te mpo na yango ? 6Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino ete ezali awa na moto moko oyo azali monene koleka Tempelo ! 7Ah soki bososolaki ndimbola ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » bokokaki kopamela te bato oyo mpo ete basali mabe te ! 8Pamba te Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.
(Mlk 3.1-6; Lk 6.6-11)
9Sima na Yesu kolongwa na esika yango, akendeki na ndako na bango ya mayangani 10epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu :
— Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ?
Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye. 11Kasi Yesu azongiselaki bango :
— Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango ? 12Nzokande, moto azali na motuya koleka meme ! Boye, kosala bolamu na mokolo ya Saba endimama na mobeko.
13Bongo, alobaki na moto yango :
— Sembola loboko na yo.
Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu.
14Bafarizeo babimaki mpe bakabolaki makanisi kati na bango mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu.
Yesu, Moponami na Nzambe
15Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso. 16Kasi apekisaki bango kobeta ata lisolo na tina na Ye. 17Asalaki bongo mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama :
18« Tala mosali na Ngai, oyo naponi ;
molingami na Ngai, mosali oyo nalingaka mingi,
oyo asalaka esengo na Ngai.
Nakopesa Ye Molimo na Ngai,
mpe akosakola bosembo epai ya bikolo ya bapaya.
19Akoswana te mpe akoganga te,
bakoyoka mongongo na Ye te na babalabala.
20Akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama
mpe akoboma te mwinda oyo elingi kokufa
kino akosala ete bosembo elonga
21mpe bikolo nyonso ya bapaya etia elikya na Kombo na Ye. »
Nzambe to Satana
(Mlk 3.20-30; Lk 11.14-23; 12.10)
22Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye ; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona. 23Bato nyonso bakamwaki mpe bazalaki koloba :
— Boni, moto oyo azali mwana ya Davidi te ?
24Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki :
— Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe.
25Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango :
— Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te. 26Soki Satana abengani Satana, wana akomi nde komibundisa ye moko ; bongo bokonzi na ye ekowumela ndenge nini ? 27Mpe soki, Ngai, nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Yango wana, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino. 28Kasi soki ezali na nguya ya Molimo ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.
29 Ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpe koyiba biloko na ye ya ndako soki akangi nanu elombe yango te na basinga ? Nzokande, soki akangi ye na basinga, wana akoki solo koyiba biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ye.
30 Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka. 31Yango wana, nazali koloba na bino penza ya solo : lisumu nyonso mpe makambo mabe nyonso oyo bato bakoki koloba na tina na Nzambe ekolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te. 32Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te, ezala na bomoi na ye awa na se to na bomoi oyo ekoya.
Nzete mpe bambuma na yango
(Mat 7.16-20; Lk 6.43-45)
33 Nzete ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe ; pamba te nzete eyebanaka na mbuma na yango. 34Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye : 35moto malamu alobaka makambo ya malamu kowuta na motema malamu na ye, mpe moto mabe alobaka makambo ya mabe kowuta na motema mabe na ye. 36Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki. 37Pamba te ezali na nzela ya maloba na yo moko kaka nde bakolongisa yo to bakokweyisa yo.
(Mlk 8.11-12; Lk 11.29-32)
38Bongo ndambo ya balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo balobaki na Ye :
— Moteyi, tolingi komona yo kosala elembo moko.
39Yesu azongisaki :
— Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya mosakoli Yona. 40Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele. 41Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema mpe bakokatela bato ya ekeke oyo etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Yona. 42Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.
(Lk 11.24-26)
43 Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te, 44emilobelaka : « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. » Tango molimo mabe yango ezongaka ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu, 45ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.
Libota ya solo ya Yesu
(Mlk 3.31-35; Lk 8.19-21)
46Wana Yesu azalaki nanu koloba na bato, mama na Ye mpe bandeko na Ye ya mibali batelemaki libanda mpe bazalaki koluka kosolola na Ye. 47Bongo moto moko ayebisaki Yesu :
— Mama mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya kosolola na yo.
48Kasi Yesu azongiselaki ye :
— Nani mama na Ngai, mpe banani bandeko na Ngai ?
49Bongo Yesu atalisaki loboko na Ye na ngambo ya bayekoli na Ye mpe alobaki :
— Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, bango oyo ! 50Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.

Sélection en cours:

Matayo 12: MNB

Surbrillance

Partager

Copier

None

Tu souhaites voir tes moments forts enregistrés sur tous tes appareils? Inscris-toi ou connecte-toi