YouVersion Logo
Search Icon

Matayo 9

9
Yesu alimbisi mpe abikisi ebosono
1Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye. 2Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango :
— Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.
3Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema :
— Moto oyo azali kotiola Nzambe !
4Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango :
— Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ? 5Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? » 6Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.
Bongo alobaki na ebosono :
— Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.
7Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye. 8Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato.
Tembe na tina na Yesu
(Mlk 2.13-22; Lk 5.27-39)
9Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : « Landa Ngai. » Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu.
10Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye. 11Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu :
— Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ?
12Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango :
— Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. 13Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.
14Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu :
— Mpo na nini biso mpe Bafarizeo tokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ?
15Yesu azongiselaki bango :
— Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.
16 Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka. 17Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.
Yesu aleki bokono mpe kufa na nguya
(Mlk 5.21-43; Lk 8.40-56)
18Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye :
— Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi.
19Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango.
20Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye, 21pamba te azalaki komilobela :
— Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai.
22Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki :
— Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo.
Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye.
23Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele. 24Alobaki na bango :
— Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi.
Kasi bato bakomaki kotiola Ye. 25Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki.
26Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba.
Yesu abikisi bakufi miso mibale
27Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga :
— Mwana ya Davidi, yokela biso mawa !
28Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango :
— Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ?
Bazongisaki :
— Iyo, Nkolo !
29Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki :
— Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !
30Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango :
— Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.
31Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba.
(Lk 11.14-15; Mat 12.22-24)
32Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te. 33Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki :
— Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te !
34Kasi Bafarizeo bazalaki koloba :
— Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe.
Yesu ayokeli bato mawa
(Mlk 6.34; Lk 10.2)
35Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge.
(Mlk 6.34; Lk 10.2)
36Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli. 37Yesu alobaki na bayekoli na Ye : « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke ! 38Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »

Currently Selected:

Matayo 9: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in

YouVersion uses cookies to personalize your experience. By using our website, you accept our use of cookies as described in our Privacy Policy