YouVersion Logo
Search Icon

Matayo 8

8
Yesu abikisi babeli
(Mlk 1.40-45; Lk 5.12-16)
1Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye. 2Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki :
— Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto.
3Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki :
— Nalingi ete ezala bongo, koma peto.
Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ; 4mpe Yesu alobaki na ye :
— Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.
(Lk 7.1-10; Yn 4.43-54)
5Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi. 6Alobaki :
— Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi.
7Yesu azongiselaki ye :
— Nakoya kobikisa ye.
8Mokonzi ya basoda alobaki :
— Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye. 9Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango.
10Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye :
— Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele ! 11Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo. 12Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.
13Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda :
— Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo !
Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki.
Yesu abikisaki bokono na biso
(Mlk 1.29-34; Lk 4.38-41)
14Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele. 15Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki ; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei.
16Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso. 17Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki :
« Amemaki mokumba ya pasi na biso
mpe abikisaki biso na bokono na biso. »
Pasi ya kolanda Yesu
(Lk 9.57-62)
18Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale. 19Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki :
— Moteyi, nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende.
20Kasi Yesu alobaki na ye :
— Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.
21Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye :
— Nkolo, pesa ngai nzela ete nakende nanu kokunda tata na ngai.
22Kasi Yesu alobaki na ye :
— Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.
Yesu aleki mopepe na nguya
(Mlk 4.36-41; Lk 8.22-25)
23Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. 24Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. 25Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga :
— Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa !
26Kasi Yesu alobaki na bango :
— Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ?
Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki. 27Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? »
Yesu aleki milimo mabe na nguya
(Mlk 5.1-20; Lk 8.26-39)
28Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana. 29Bakomaki koganga :
— Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ?
30Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki. 31Milimo mabe esengaki na Yesu :
— Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu.
32Yesu alobaki na milimo yango :
— Bobima !
Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale ; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi.
33Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama. 34Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango.

Currently Selected:

Matayo 8: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in