Jeremi 22
22
Kosambisama ya bakonzi ya mabe
1Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo : 2‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo, 3tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te. 4Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango. 5Kasi soki botosi mibeko oyo te, › elobi Yawe, ‹ nalapi ndayi na Kombo na Ngai ete ndako oyo ekobebisama. › »
6Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda :
« Ata soki ozali lokola Galadi na miso na Ngai,
lokola songe ya ngomba ya Libani ;
solo, nakokomisa yo lokola esobe,
lokola engumba oyo bato bavandaka te.
7Nakotinda bato ete baya kobebisa yo,
moto na moto na bibundeli na ye ;
bongo bakokata banzete na yo ya sedele oyo ya kitoko
mpe bakobwaka yango na moto.
8Bato bakowuta na bikolo ya ndenge na ndenge bakolekela na engumba oyo mpe bakotunana : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na engumba monene oyo ? ›
9Mpe eyano ekozala : ‹ Ezali mpo ete babebisi boyokani oyo basalaki elongo na Yawe, Nzambe na bango, bafukamelaki mpe basalelaki banzambe ya bapaya. › »
Na tina na Shalumi, mokitani ya Joziasi
10Bolela te mpo na kufa ya mokonzi
to bosala matanga te mpo na kufa na ye !
Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu,
mpo ete akozonga lisusu te
mpe akomona lisusu te mboka epai babota ye.
11Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te. 12Akokufa na esika oyo bakomema ye na bowumbu, akomona lisusu mokili oyo te. »
Na tina na Yeoyakimi
13« Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye
na nzela ya bosembo te,
mpe bashambre na ye ya etaje,
na nzela ya lokuta ;
oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pamba
mpe afutaka bango eloko te ;
14oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako monene
oyo ekozala na bashambre minene, na etaje ! ›
Boye atiaka yango maninisa minene,
mabaya ya sedele na bamir na yango ya kati
mpe akopakolaka yango langi ya motane.
15Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele
nde ekolendisa bokonzi na yo ?
Tata na yo azangaki bilei mpe masanga te,
kasi atambolaki na bosembo mpe na boyengebene ;
boye alongaki na makambo nyonso.
16Alongisaki babola mpe bato bakelela,
mpe alongaki na makambo nyonso.
Boni, yango te koyeba Ngai, »
elobi Yawe ?
17« Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka
bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka,
na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te,
na nzela ya konyokola bato
mpe na nzela ya kobotola bango biloko. »
18Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda :
« Bakosalela ye matanga te na koloba :
‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali !
Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! ›
Bakosalela ye matanga te na koloba :
‹ Mawa, nkolo na ngai !
Mawa, mokonzi na ngai ! ›
19Bakokunda ye ndenge bakundaka ane,
bakobenda ye mpe bakobwaka ye
libanda ya bikuke ya Yelusalemi. »
Na tina na Yelusalemi
20« Mata na Libani mpe ganga makasi !
Tika ete mongongo na yo eyokana kino na Bashani !
Ganga wuta na Abarimi,
pamba te baninga na yo nyonso basili kokufa !
21Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia
kasi olobaki : ‹ Nakoyoka te ! ›
Ezaleli na yo ezalaka kaka boye wuta bolenge na yo,
otosaka na yo Ngai te !
22Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso
mpe baninga na yo bakokende na bowumbu.
Okoyoka soni mpe okosambwa
likolo ya mabe na yo nyonso.
23Yo oyo ovandaka na Libani,
yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele,
yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo,
pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi
oyo azali na pasi ya kobota !
Na tina na Konia, mwana mobali ya Yeoyakini
24Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka. 25Nakokaba yo na maboko ya bato oyo bazali na posa ya koboma yo, mpe na maboko ya bato oyo obangaka, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na bato ya Babiloni. 26Nakobengana yo elongo na mama oyo abota yo na mokili mosusu epai wapi moko te kati na bino abotama, mpe ekozala kuna nde bino mibale bokokufa. 27Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. »
28Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka
oyo etiolama to eloko oyo ezanga tina ?
Mpo na nini babengana ye elongo na bana na ye
mpe babwaka bango na mokili oyo bayebi te ?
29Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai !
Yoka Liloba na Yawe !
30Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Koma kombo ya moto oyo
lokola moto oyo abota te,
lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye,
pamba te moko te kati na bana na ye akolonga,
moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi
to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. »
Currently Selected:
Jeremi 22: MNB
Highlight
Share
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fen.png&w=128&q=75)
Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.