Jeremi 21
21
Eyano epai ya mokonzi Sedesiasi
1Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango mokonzi Sedesiasi atindelaki ye Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpo na koloba na ye : 2« Tuna Yawe sik’oyo mpo na biso, pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azali kobundisa biso ; tango mosusu Yawe akosala bikamwa mpo na biso ndenge asalaki na tango ya kala, mpo ete Nabukodonozori atika biso. »
3Kasi Jeremi azongiselaki bango : « Boloba na Sedesiasi : 4‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo. 5Mpe Ngai moko, nakosembola loboko na Ngai mpo na kobundisa bino na nguya, na kanda, na kosilika mpe na kotomboka makasi. 6Nakobebisa nyonso oyo ezali kati na engumba oyo : bato mpe banyama ; mpe bakokufa na bokono oyo ebomaka. 7Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. ›
8Mpe lisusu, loba na bato : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Botala, nasili kotia liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya kufa. 9Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka. Kasi moto oyo akobima mpe akokende komipesa na maboko ya bato ya Babiloni oyo bazingeli bino, akobikisa bomoi na ye mpe akokufa te. 10Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe ; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. ›
11Loba na libota ya mokonzi ya Yuda :
‹ Boyoka Liloba na Yawe !
12Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi :
Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso,
bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ;
soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai,
kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ;
mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango.
13Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku,
na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba,
nazali kosepela na yo te, elobi Yawe,
yo oyo olobaka : ‘ Nani azali na makoki ya kobundisa biso ?
Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso ? ’
14Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo,
elobi Yawe,
nakopelisa moto na zamba na yo,
mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › »
Currently Selected:
Jeremi 21: MNB
Highlight
Share
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fen.png&w=128&q=75)
Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.