YouVersion Logo
Search Icon

Ebandeli 17

17
Nzambe ayeisi sika boyokani elongo Abrami
1Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela. 2Nakosala boyokani kati na Ngai mpe yo, mpe nakokomisa bakitani na yo ebele penza. »
3Abrami afukamaki elongi kino na mabele, mpe Nzambe alobaki na ye lisusu : 4« Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele. 5Bakobenga yo lisusu Abrami te ; kombo na yo ekokoma Abrayami#17.5 Abrayami elakisi : tata ya mabota ebele., pamba te nakokomisa yo tata ya bikolo ebele. 6Nakopesa yo mabota ebele, nakobimisa bikolo mpe bakonzi na nzela na yo. 7Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo. 8Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › »
9Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima. 10Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela : Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga. 11Kokatama ngenga ekozala elembo ya boyokani kati na bino mpe Ngai. 12Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga : ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga. 13Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela. 14Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. »
15Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Mpo na Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu te Sarayi, kasi okokoma kobenga ye Sara#17.15 Sara elakisi : mwana mwasi oyo azali mwana ya mokonzi.. 16Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. »
17Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! »
18Boye Abrayami alobaki na Nzambe :
— Tika ete Isimaeli awumela na se ya lipamboli na Yo !
19Nzambe alobaki :
— Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki#17.19 Izaki elingi koloba : azali koseka.. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye. 20Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene. 21Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya.
22Tango Nzambe asilisaki kosolola na Abrayami, akendeki.
23Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye. 24Abrayami azalaki na mibu tuku libwa na libwa ya mbotama tango akatamaki ngenga ; 25mpe Isimaeli, mwana na ye ya mobali, azalaki na mibu zomi na misato tango akatamaki ngenga. 26Abrayami mpe mwana na ye ya mobali, Isimaeli, bakatamaki ngenga mokolo moko. 27Mibali nyonso kati na ndako ya Abrayami, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mokili ya bapaya, bakatamaki ngenga elongo na ye.

Currently Selected:

Ebandeli 17: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in