YouVersion Logo
Search Icon

Ebandeli 16

16
Agari mpe Isimaeli
1Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. » 2Sarayi alobaki na Abrami :
— Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye.
Abrami ayokaki maloba ya Sarayi. 3Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye. 4Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye. 5Boye, Sarayi alobaki na Abrami :
— Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo.
6Abrami alobaki :
— Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu.
Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye.
7Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri. 8Atunaki ye :
— Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi ?
Azongisaki :
— Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai.
9Anjelu ya Yawe alobaki na ye :
— Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye.
10Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu :
— Nakokomisa bakitani na yo ebele penza mpe moto moko te akokoka kotanga bango.
11Alobaki na ye lisusu :
— Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali,
okopesa ye kombo « Isimaeli, »
pamba te Yawe ayoki yo,
kati na mawa na yo.
12Akozala lokola ane ya zamba.
Loboko na ye ekobundisa moto nyonso,
mpe loboko ya moto nyonso ekobundisa ye ;
akovanda esika moko te na bandeko na ye.
13Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? »
Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai. 14Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi#16.14 Beri Lakai-Royi elingi koloba : libulu ya Ye oyo azali na bomoi, oyo azali komona ngai.. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi.
15Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli#16.15 Isimaeli elakisi : Nzambe ayoki.. » 16Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli.

Currently Selected:

Ebandeli 16: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in