YouVersion Logo
Search Icon

Ebandeli 15

15
Nzambe asali boyokani elongo na Abrami
1Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli :
— Kobanga te, Abrami !
Nazali nguba na yo,
lifuti na yo ekozala monene.
2Kasi Abrami azongisaki :
— Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai.
3Abrami alobaki lisusu :
— Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai !
4Yawe alobaki na ye :
— Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo.
5Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye :
— Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango.
Alobaki na ye lisusu :
— Ezali boye nde bakitani na yo bakozala.
6Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo.
7Alobaki na ye lisusu :
— Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo.
8Kasi Abrami alobaki :
— Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai ?
9Yawe alobaki na ye :
— Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka.
10Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu ; kasi akataki bandeke te.
11Bandeke oyo eliaka misuni ekitaki mpo na kolia misuni yango, kasi Abrami abenganaki yango.
12Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye. 13Boye, Yawe alobaki na Abrami :
— Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei. 14Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele. 15Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo. 16Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te.
17Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama. 18Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate : 19mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni, 20ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi, 21ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. »

Currently Selected:

Ebandeli 15: MNB

Highlight

Share

Copy

None

Want to have your highlights saved across all your devices? Sign up or sign in