Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 4Mwa ndambo

LITATOLI
Osengeli kozala na mpiko ya kotatola na nyina na Yesu liboso ya moto nyonso, na esika nyonso, na ntango nyonso ata mpe na lolenge nini. Nasepeli na oyo Joyous Celebration ayembaki na Nzembo na bango moko; “Nalingi koyebisa moto moko likolo ya moto moko oyo akoki kobikisa moto nyonso nkombo na ye Yesu Klisto”.Loyembo yango ezali komonisa ete Yesu azali na esika ya liboso na molongo mobimba. Nayokaki nsoni na mayangani ya eklezia esika babengisaki ngai lokola moteyi, moto nyonso oyo azalaki kopesa litatoli alobalaki nkombo ya Yesu te kasi oyo ya episkopo na ye… Nzambe ya episkopo na ngai asalaki yango mpo na ngai… Ntango nabongi Papa, Papa ayebisaki ngai… ekendaki … yambo nabanda koteya nasengaki koyemba nzembo moko mpo na kozongisa Yesu na katikati ya mayangani. Litatoli nyonso oyo ezali kotya Yesu mpe mosala na ye na esika ya liboso te ezali litatoli ya koluka lokumu na yo moko esengeli etatotalama liboso ya bato te.
Emoniseli 12:11; Kasi bango balongi ye na nzela ya makila ya Mpate, mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango; balingaki te bomoi na bango kino kondima ata kokufa.
“Makila na mwana mpate” elimboli te maikila lokola mai kasi lokola mbeka ya Yesu Klisto, oyo Asopaki makila na ye mpo na kosikola bato na masumu. Mbeka yango epesaka bandimi nguya ya kolonga Satana mpe matumoli na ye. Na ngambo mosusu, “liloba ya litatoli na bango” ezali kolobela kondima ya bandimi epai ya Yesu Klisto mpe komipesa na bango epai na ye, ata liboso ya liwa.
Litatoli yango exzali litatoli ya nguya epai na mokili mpe ezali eyambweli ya bolingo na bango mpo na Nzambe.
Lokola tozali bandimi, bolongi na biso likolo na Zabolo ezali te na nguya ya nzoto kasi na nzela ya mbeka ya Yesu Klisto mpe na litatoli na biso na ntina na ye. Ntango tozali kotatola na ntina na Yesu mpe lobiko na ye tozali komonisa kondima na biso mpe komipesa na biso epai na Nzambe kati na mpasi. Na maloba mosusu, tozali koloba ete; tozali pena ya kokufa mpo na kondima na biso na esika ya kowangana yango.
Atako akutanaki na etuluku ya bato oyo bazalaki koyina ye, moto yango awanganaki Yesu mpe mosala na ye te. Ata soki makambo mazali ndenge nini, kowangana soko moko te Yesu mpe mosala na ye kati na yo. Ntango nyonso oyo ozali koboya kotya Yesu na esika ya linoso kati na bomoi na yo mpe kopesa litatoli na ntina na ye liboso na bato, ozali kowangana ya mpe ntango nyonso ozali kowangana kondima na yo epai na ye, ozali mpe kowangana ye. Kanisa ete, Yesu alobnaki: “Soki okowangana nagi liboso na bato, ngai mpe nakowangana yo liboso na Tata na ngai”. Yesus azali kolonedisa biso ete totelema ngwi mpo na ye mpe mpo na mateya na yeata liboso ya botemeli mpe minyoko. Tokoki kokumisa Yesu mpe mateya na ye na nzela ya misala na biso, kasi kaka maloba te.
Libondeli: Tata Nzambe tika ete mokili mombimba eyeba ete yo ozali esika ya ntina mingi mpo na bomoi na ngai, mopepe oyo nazali kopema, soki nazangi yo nakozala eloko te. Yesu ondimaki liwa ya nsoni mpo na ngai, nakoyoka nsoni te mpo na kotatola yo liboso ya minyoko mpe mikakatano. Na nkombo na Yesu nabondeli mpe nandimi, AMEN.
Botangi mosusu: Matayo 10:32-33| 2 Timote 1:8-9| Matayo 5:16| Emoniseli 20:4|
Makomi
Oyo etali Ebongiseli oyo

Na yango, mokili esengeli koyeba Yesu Klisto; lokola tozali batatoli na ye, tosengeli kozala pene ya kokutana na mikakatano mpe minyoko wana tozali kokokisa mokumba monene wana na koyebaka ete Yesu akozala na biso elongo ntango nyonso kino nsuka ya ntango.
More
Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d