Tika Lisano Ya Kopamela Basusu | Eteni 7Mwa ndambo

KOSAKOLA NA ELEKO YA MALAMU TO YA MABE
Yesu akendaki na Yelushaleme mpona ntina ya koyangana na moko ya bilembo ya Bayuda oyo ezalaki molulu ya losambo oyo ekoki kozala pasaka. Kasi misala na ye ya Yelushaleme ezalaki elilingi ya kokota na ye na nkembo na Yelushaleme, oyo esalamaki kati na Yoane 12:12-19. Ezali likambo yango nde ememaka ye na kobwakama na ekulusu mpe na lisekwa na ye. Eloko nasepeli nango makasi na verse oyo ezali ete Yesu akimaki mimeseno ya Bayuda te, kasi asalelaki libaku yango mpo na kosakola nsango malamu na nzela ya kobikisa bato ya maladi mpe na kolimbisaka masumu. Salela mabaku nyonso mpo na kosakola nsango malamu.
Mbula na mbula, na sanza ya Minei mpe na oyo ya Desembre, Baklisto basalaka feti ya pasaka mpe ya Noele, mpe awa na Kenya, mingi kati na biso tokendaka na ba mboka na biso mpo na kosala feti yango elongo na ba ndeko na biso. Oyo ezali ntango malamu ya kosakola nsango malamu kati na mabota na biso mpe na mboka na biso. Kotika te ete bonkoko ya ekolo na yo etambwisa yo kasi kende kuna mpo na kosakola Klisto oyo abakamaki na ekulusu mpe asekwaki. Oyo Nalingi koloba ezali ete kotika te ete feti to bonkoko ebebisa kondima na yo, kasi salela ntango wana ya ba feti mpo na kozalisa bayekoli ebele ya Yesu. Bandimi mosusu bakweyaka na masumu na ntango ya Pasaka to ya Noele mpe oyo eleki mabe makasi ezali ete ba komikotisa na pite, na kolangwa masanga mpe na lokoso kaka mpo na ba feti. Moto moko alobaki et: “Klisto azali ntina ya eleko yango”. Tosengeli kotya likebi mingi na Klisto mpe na mosala ya kosakola nsango malamu koleka mimeseno mpe be feti na biso.
Ata na eleko nini mpe kati na azalela nini, sakola Klisto. Ezala ete bayoki na yo bazali kondima to te, sakola Klisto. Soki osakoli Klisto te, kopesa foti na moto moko te to likambo moko te. Ntango nyonso oyo ozali na libaku ya koyebisa moto moko nsango ya Klisto, sala yango mpe tikela Nzambe matomba na yango.
Libondeli: Na nkombo ya Yesu, eloko moto moko te akoboma bomoto na ngai ya sika kati na Klisto. Nakomekola mokili te kasi na kobongola mokili na kosakolaka Klisto. Tika ete pole na yo engenga bipai nyonso Nakokende. Tika ete mimeseno ya Klisto kati na ngai mileka mimeseno misusu nyonso na nkombo na Yesu, AMEN.
Botangi mosusu: Matthew 21:1-11| Mark 11:1-11 | Luke 19:28-44 | John 12:12-19 | 2 Timothy 4:2 | Romans 12:2 | Mark 7:8 | 1 Peter 1:17-18 | Deuteronomy 12: 29- 32 |
Makomi
Oyo etali Ebongiseli oyo

Makambo ya bomoi ya Yesu na Galilai masalemaki na boumeli ya mwa basanza kati na Mokapo 4 mpe 5, kasi Yoane azwaki ekateli ya kolobela yango te mpamba te masolo yango masilaki kokomama kati na Baevanzile ya Synoptique. Yoane alobelaki mingi bitumba minene oyo Yesu abandaki na Yelusaleme, esika oyo Bayuda bazalaki na makanisi mabe mpo na basusu.
More
Tolingi kopesa matondo mingi na Dennis Mutombo Mpanya mpo na kopesa mwango oyo. Mpo na koyeba makambo mosusu, talá na: https://www.facebook.com/Pastor.Wampayo?mibextid=LQQJ4d