Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Emoniseli 15

15
Elembo ya bitumbu sambo ya suka
1Bongo namonaki elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa kati na Lola : ba-anjelu sambo bamemaki bitumbu sambo ya suka, pamba te ezali na nzela na yango nde kanda ya Nzambe ekokokisama. 2Namonaki mpe eloko moko lokola etando : ezalaki lokola talatala, mpe monene lokola molayi ya ebale monene ; ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali esangana na moto. Namonaki lisusu ba-oyo balongaki nyama, ekeko na yango mpe motango ya kombo na yango ; bazalaki ya kotelema na likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala mpe basimbaki mandanda oyo Nzambe apesaki bango. 3Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate :
Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,
misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa !
Mokonzi ya bikolo nyonso,
banzela na Yo ezali sembo mpe solo.
4Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo
mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ?
Pamba te Yo kaka nde ozali Bule.
Bikolo nyonso ekoya
mpe ekogumbama liboso na Yo,
pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele.
Bakopo sambo ya kanda ya Nzambe
5Sima na yango, natalaki mpe namonaki Tempelo kofungwama kati na Lola ; mpe kati na yango, ezalaki na Mongombo ya Litatoli.
6Ba-anjelu sambo oyo bamemaki bitumbu sambo babimaki wuta na Tempelo. Balataki banzambala basala na lino ya peto ; banzambala yango ezalaki kongenga makasi, mpe bakangaki mikaba ya wolo na batolo na bango.
7Moko kati na bikelamu minei ya bomoi apesaki na ba-anjelu sambo bakopo sambo oyo basala na wolo mpe etonda na kanda ya Nzambe oyo azali na bomoi seko na seko. 8Bongo lokola Tempelo etondaki na milinga kowuta na nkembo mpe na nguya ya Nzambe, moto moko te akokaki kokota kati na Tempelo yango kino bitumbu sambo oyo ba-anjelu sambo bamemaki esilaki.

Currently Selected:

Emoniseli 15: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo