Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mitango 28

28
Mibeko na tina na makabo bazikisa na moto
Na tina na makabo ya mokolo na mokolo
1Yawe alobaki na Moyize : 2« Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. ›
3Loba na bango : ‹ Tala likabo bazikisa na moto oyo bosengeli kobonza epai na Yawe : bana meme mibale ya mobu moko mpe ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na libela. 4Bokobonza mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa ; 5elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive. 6Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, oyo ebandisamaki na ngomba Sinai ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. 7Bokobakisa lisusu likabo ya masanga : balitele mibale ya masanga ya vino ya sika mpo na mwana meme moko na moko. Bokobonzela Yawe masanga yango na Esika ya bule. 8Bokobonza mwana meme mosusu na pokwa, elongo na lolenge moko ya makabo ya mbuma mpe mbeka ya masanga oyo bobonzaki na tongo ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe.
Na tina na bambeka mpo na mokolo ya Saba
9Na mokolo ya Saba, bokobonza mbeka ya bana meme mibale, ya mobu moko oyo ezanga mbeba, elongo na likabo ya masanga mpe bakilo motoba ya farine oyo basangisa na mafuta, lokola makabo ya mbuma. 10Oyo ezali mbeka ya kotumba mpo na mikolo nyonso ya Saba, bakisa mbeka ya kotumba ya tango nyonso mpe mbeka na yango ya masanga.
Na tina na bambeka mpo na ebandeli ya sanza
11Na ebandeli nyonso ya sanza, bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme ya mobu moko sambo. Yango nyonso esengeli kozala na mbeba te. 12Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; 13mpo na mwana meme moko na moko, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na mafuta. Ezali mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. 14Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala : balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali. 15Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu.
Na tina na bambeka mpo na feti ya Pasika
16Mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso ekozala Pasika mpo na lokumu ya Yawe. 17Mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango kaka ekozala mokolo ya feti monene. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. 18Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. 19Bokobonzela Yawe, lokola likabo bazikisa na moto, lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali, bana mibali ya meme sambo ya mobu moko ; nyonso esengeli kozanga mbeba. 20Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko na moko ya mobali, bakobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; 21mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. 22Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino. 23Bokobonza mbeka oyo nyonso, bakisa mpe mbeka ya kotumba ya libela ya tongo. 24Bokobanda kobonza yango mikolo nyonso, na mikolo nyonso sambo, lokola bilei bazikisa na moto ; mpe solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Ekobanda kobakisama na mbeka ya kotumba ya libela mpe na mbeka na yango ya masanga. 25Na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bongo na mokolo yango, bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo.
Na tina na bambeka mpo na feti ya baposo
26Na mokolo ya bambuma ya liboso, tango bokobonzela Yawe makabo ya mbuma ya sika, na tango ya feti ya baposo, bokozala na mayangani ya bule mpe bokosala mosala moko te oyo basalaka mokolo na mokolo. 27Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : bangombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana meme sambo ya mibali ya mobu moko. 28Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; 29mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. 30Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino. 31Bokobonza mbeka yango na mbeka na yango ya masanga, bakisa mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma. Bosala keba ete ezala banyama oyo ezanga mbeba. › »

Currently Selected:

Mitango 28: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo