Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mitango 26

26
1Yawe alobaki na Moyize mpe na Nganga-Nzambe Eleazari, mwana mobali ya Aron : 2« Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. »
3Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki : 4« Tokotanga motango ya bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ndenge Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize. »
Tala bana ya Isalaele oyo babimaki na Ejipito :
5Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele :
na nzela ya Enoki, bakitani ya libota ya Enoki ;
na nzela ya Palu, bakitani ya libota ya Palu ;
6na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ;
na nzela ya Karimi, bakitani ya libota ya Karimi.
7Yango nde ezalaki mabota ya Ribeni mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na misato na nkama sambo na tuku misato.
8Eliabi azalaki mwana mobali ya Palu, 9mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe. 10Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa. 11Kasi bakitani ya Kore bakufaki te.
12Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki :
na nzela ya Nemueli, bakitani ya libota ya Nemueli ;
na nzela ya Yamini, bakitani ya libota ya Yamini ;
na nzela ya Yakini, bakitani ya libota ya Yakini ;
13na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi ;
na nzela ya Saulo, bakitani ya libota ya Saulo.
14Yango nde ezalaki mabota ya Simeoni mpe bazalaki bato nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale.
15Bakitani ya Gadi kolanda mabota na bango, bazalaki :
na nzela ya Tsefoni, bakitani ya libota ya Tsefoni ;
na nzela ya Agi, bakitani ya libota ya Agi ;
na nzela ya Shuni, bakitani ya libota ya Shuni ;
16na nzela ya Ozini, bakitani ya libota ya Ozini ;
na nzela ya Eri, bakitani ya libota ya Eri ;
17na nzela ya Arodi, bakitani ya libota ya Eroki ;
na nzela ya Areeli, bakitani ya libota ya Areeli.
18Yango nde ezalaki mabota ya Gadi mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na nkama mitano.
19Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana.
20Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki :
na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela ;
na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi ;
na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera.
21Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki :
na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ;
na nzela ya Amuli, bakitani ya libota ya Amuli.
22Yango nde ezalaki mabota ya Yuda ; bazalaki bato nkoto tuku sambo na motoba na nkama mitano.
23Bakitani ya Isakari kolanda mabota na bango bazalaki :
na nzela ya Tola, bakitani ya libota ya Tola ;
na nzela ya Puwa, bakitani ya libota ya Puwa ;
24na nzela ya Yashubi, bakitani ya libota ya Yashubi ;
na nzela ya Shimironi, bakitani ya libota ya Shimironi.
25Yango nde ezalaki mabota ya Isakari ; bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama misato.
26Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki :
na nzela ya Seredi, bakitani ya libota ya Seredi ;
na nzela ya Eloni, bakitani ya libota ya Eloni ;
na nzela ya Yaleyeli, bakitani ya libota ya Yaleyeli.
27Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano.
28Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki :
29Bakitani ya Manase :
na nzela ya Makiri, bakitani ya libota ya Makiri (Makiri azalaki tata na Galadi) ;
na nzela ya Galadi, bakitani ya libota ya Galadi.
30Tala bakitani ya Galadi :
na nzela ya Yezeri, bakitani ya libota ya Yezeri ;
na nzela ya Eleki, bakitani ya libota ya Eleki ;
31na nzela ya Asirieli, bakitani ya libota ya Asirieli ;
na nzela ya Sishemi, bakitani ya libota ya Sishemi ;
32na nzela ya Shemida, bakitani ya libota ya Shemida ;
na nzela ya Eferi, bakitani ya libota ya Eferi.
33Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi ; bongo, tala bakombo na bango : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa.
34Yango nde ezalaki mabota ya Manase, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na mibale na nkama sambo.
35Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki :
na nzela ya Shutela, bakitani ya libota ya Shutela ;
na nzela ya Bekeri, bakitani ya libota ya Bekeri ;
na nzela ya Tayani, bakitani ya libota ya Tayani.
36Tala bakitani ya Shutela :
na nzela ya Erani, bakitani ya etuka ya Erani.
37Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano.
Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango.
38Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki :
na nzela ya Bela, bakitani ya libota ya Bela ;
na nzela ya Ashibeli, bakitani ya libota ya Ashibeli ;
na nzela ya Ayirami, bakitani ya libota ya Ayirami ;
39na nzela ya Shufami, bakitani ya libota ya Shufami ;
na nzela ya Ufami, bakitani ya libota ya Ufami.
40Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki :
na nzela ya Aridi, bakitani ya libota ya Aridi ;
na nzela ya Namani, bakitani ya libota ya Namani.
41Yango nde ezalaki mabota ya Benjame mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama mitano.
42Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki :
na nzela ya Shuami, bakitani ya libota ya Shuami.
Bango nde bazalaki bakitani ya Dani : 43bango nyonso bazalaki bakitani ya libota ya Shuami mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama minei.
44Bakitani ya Aseri, kolanda mabota na bango, bazalaki :
na nzela ya Yimina, bakitani ya libota ya Yimina ;
na nzela ya Yishivi, bakitani ya libota ya Yishivi ;
na nzela ya Beria, bakitani ya libota ya Beria ;
45na nzela ya bakitani ya Beria :
na nzela ya Eberi, bakitani ya libota ya Eberi ;
na nzela ya Malikieli, bakitani ya libota ya Malikieli.
46Aseri azalaki mpe na mwana moko ya mwasi na kombo Sera.
47Yango nde ezalaki mabota ya Aseri, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei.
48Bakitani ya Nefitali, kolanda mabota na bango, bazalaki :
na nzela ya Yatseyeli, bakitani ya libota ya Yatseyeli ;
na nzela ya Guni, bakitani ya libota ya Guni ;
49na nzela ya Yetseri, bakitani ya libota ya Yetseri ;
na nzela ya Shilemi, bakitani ya libota ya Shilemi.
50Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei.
51Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato.
Malako mpo na kokabola mokili
52Yawe alobaki na Moyize : 53« Esengeli kokabolela bango mokili lokola libula, kolanda motango ya bato wana. 54Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki. 55Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango. 56Esengeli kokabola libula na libula na zeke kati na libota oyo ezali monene mpe libota oyo ezali moke. »
Mabota ya Balevi etangami
57Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango :
na nzela ya Gerishoni, bakitani ya libota ya Gerishoni ;
na nzela ya Keati, bakitani ya Keati ;
na nzela ya Merari, bakitani ya Merari.
58Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi :
bakitani ya libota ya Libini,
bakitani ya libota ya Ebron,
bakitani ya libota ya Maali,
bakitani ya libota ya Mushi,
bakitani ya libota ya Kore.
Keati azalaki tata ya Amirami ; 59bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami. 60Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari. 61Kasi Nadabi na Abiyu bakufaki tango babonzelaki Yawe makabo na moto ya mopaya.
62Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango.
63Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko. 64Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai. 65Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni.

Currently Selected:

Mitango 26: MNB

Tya elembo

Share

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo