Mitango 20
20
Wuta na Kadeshi kino na bitando ya Moabi
Na Meriba, bato batombokeli Moyize mpe Aron
1Na sanza ya liboso, lisanga mobimba ya Isalaele ekomaki na esobe ya Tsini mpe bavandaki na Kadeshi. Ezalaki kuna nde Miriami akufaki mpe bakundaki ye.
2Nzokande esika yango ezalaki na mayi ya komela te mpo na lisanga ya Isalaele, mpe bato basanganaki mpo na kotombokela Moyize mpe Aron. 3Baswanisaki Moyize mpe balobaki : « Elingaki kozala malamu soki tokufaki na biso tango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yawe ! 4Mpo na nini omemaki lisanga ya Yawe na esobe oyo ? Ezali mpo ete biso mpe bibwele na biso tokufa awa ? 5Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito mpe omemi biso na esika oyo ya pasi, esika oyo bakoki kutu kolona ata eloko moko te, esika oyo ezanga ata mbuma ya figi to ya vino to mpe ya grenade, esika oyo ezanga kutu ata mayi ya komela ? »
6Moyize mpe Aron babimaki kati ya lingomba mpe bakendeki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bakweyaki elongi kino na mabele, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bango.
7Yawe alobaki na Moyize : 8« Zwa lingenda na yo ; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. »
9Moyize azwaki lingenda oyo ezalaki liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye. 10Ye mpe Aron basangisaki lisanga ya bato esika moko liboso ya libanga, mpe Moyize alobaki na bango : « Boyoka, bino batomboki, tokoki kobimisela bino mayi na libanga oyo ? »
11Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki ; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki.
12Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. »
13Ezalaki mayi ya Meriba epai wapi bana ya Isalaele baswanaki na Yawe, mpe epai wapi Yawe alakisaki bosantu na Ye kati na bango.
Mokonzi ya Edomi aboyi kolekisa bana ya Isalaele
14Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki :
— Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi : « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso. 15Bakoko na biso bakendeki na Ejipito mpe tokomaki kovanda kuna mibu ebele. Bato ya Ejipito banyokolaki biso elongo na bakoko na biso ; 16kasi tango togangaki epai na Yawe, ayokaki kolela na biso, atindelaki biso anjelu oyo abimisaki biso na Ejipito.
Sik’oyo tozali awa na kadeshi, engumba oyo ezali na suka ya mokili na yo. 17Tobondeli yo, tika biso tolekela na mboka na yo. Tokokota na elanga to na elanga ya vino moko te mpe tokomela mayi ya mabulu na bino te. Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene ya mokonzi bongo, tokokatisa ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi te, kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. »
18Kasi mokonzi ya Edomi azongiselaki ye :
— Okoki kolekela na mokili na ngai te ; soki omeki, tokobimela bino mpe tokobundisa bino na mopanga.
19Bana ya Isalaele bazongiselaki ye :
— Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene mpe soki biso to bibwele na biso tomeli mayi na bino, tokofuta yango. Tolingi kaka eloko moko, eloko mosusu te : toleka kaka na makolo.
20Azongiselaki bango lisusu :
— Bokoki kolekela awa te.
Boye, bato ya Edomi babimelaki bango na mampinga monene ya basoda mpo na kobundisa bana ya Isalaele. 21Lokola Edomi eboyaki ete bana ya Isalaele balekela na etuka na yango, bana ya Isalaele bazwaki nzela mosusu.
Kufa ya Aron
22Lisanga mobimba ya Isalaele babimaki wuta na Kadeshi mpe bakomaki kino na ngomba Ori. 23Bongo, Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na ngomba Ori, pembeni ya mondelo ya Edomi : 24« Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, pamba te akokota te na mokili oyo napesi bana ya Isalaele, mpo ete bino mibale botombokelaki mitindo na Ngai na mayi ya Meriba. 25Kamata Aron na Eleazari, mwana na ye ya mobali mpe mema bango likolo ya ngomba Ori. 26Longola Aron bilamba na ye mpe latisa yango Eleazari, mwana na ye ya mobali, pamba te Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, akokufa kuna. »
27Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki : bamataki likolo ya ngomba Ori na miso ya lisanga mobimba. 28Moyize alongolaki Aron bilamba mpe alatisaki yango Eleazari, mwana na ye ya mobali. Mpe Aron akufa kuna na likolo ya ngomba. Boye, Moyize mpe Eleazari bakitaki ngomba ; 29mpe tango lingomba mobimba eyokaki sango ete Aron asilaki kokufa, bato nyonso ya Isalaele basalelaki ye matanga ya mikolo tuku misato.
Currently Selected:
Mitango 20: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.