Mitango 16
16
Kore, Datani mpe Abirami batombokeli Moyize
1Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita ; ezalaki : Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti. 2Batombokelaki Moyize. Elongo na bango, ezalaki na bana ya Isalaele nkama mibale na tuku mitano oyo bayebanaki malamu lokola bakambi ya lisanga mpe bazalaki kosangana kati na mayangani ya bakambi ya lisanga. 3Bayaki lisanga mpo na kotelemela Moyize mpe Aron. Balobaki na bango :
— Bino mpe bolekisi ! Lingomba mobimba ezali bule mpe moto nyonso kati na yango azali bule, mpe Yawe azali elongo na bango. Boye, mpo na nini bozali komitia likolo ya lisanga ya Yawe ?
4Tango Moyize ayokaki bongo, akweyaki elongi kino na mabele. 5Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye :
— Lobi na tongo, Yawe akolakisa nani azali moto na Ye mpe nani oyo azali bule, mpe akotika ye kopusana pene na Ye ; akotika solo moponami na Ye kopusana pene na Ye. 6Yo, Kore, elongo na bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokosala likambo oyo : Bokamata bambabola oyo batumbelaka malasi 7mpe, lobi, botia moto mpe malasi ya ansa kati na yango liboso ya Yawe. Moto oyo Yawe akopona, ye nde azali bule. Bino Balevi, bino mpe bolekisi !
8Moyize alobaki lisusu na Kore :
— Bino Balevi, boyoka sik’oyo ! 9Ekoki na bino te ete Nzambe ya Isalaele atia bino pembeni kati na lisanga ya Isalaele mpe abenda bino pembeni na Ye mpo na kosala mosala na Mongombo ya Yawe mpe kotelema liboso ya lisanga mpo na kosalela bango ? 10Abendaki bino pembeni na Ye elongo na Balevi nyonso oyo bazali kolanda bino ; kasi sik’oyo, bazali lisusu koluka kozwa bonganga-Nzambe ! 11Ezali Yawe nde bosalelaki likita, yo elongo na bato oyo bazali kolanda yo. Aron nde nani mpo ete bokoka koyimayima na tina na ye ?
12Mpe na sima, Moyize abengisaki Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi. Kasi bazongisaki :
— Tokoya te ! 13Ekoki kaka te mpo na yo kobimisa biso na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpo na koya kobomisa biso kati na esobe ? Sik’oyo olingi lisusu kokoma mokonzi na biso ? 14Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso ? Te, tokoya te !
15Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe :
— Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.
16Moyize alobaki na Kore :
— Lobi, yo mpe bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokotelema elongo na Aron liboso ya Yawe. 17Moko na moko akokamata mbabola na ye, oyo batumbelaka malasi, bongo akotia malasi ya ansa kati na yango mpe akomema yango liboso ya Yawe. Bambabola nyonso ekozala nkama mibale na tuku mitano ; yo mpe elongo na Aron bokomema bambabola na bino.
18Moto na moto akamataki mbabola na ye, atiaki moto mpe malasi ya ansa kati na yango ; bongo atelemaki esika moko na Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 19Tango Kore asangisaki bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, nkembo ya Yawe ebimelaki lisanga mobimba, 20mpe Yawe alobaki na Moyize mpe Aron :
21— Bokabwana na lisanga ya bato oyo mpo ete nalingi kosilisa bango kaka na mbala moko.
22Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki :
— Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato ! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka ?
23Bongo, Yawe alobaki na Moyize :
24— Loba na lisanga ete bakende mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami.
25Moyize atelemaki mpe akendeki epai ya Datani mpe Abirami ; mpe bakambi nyonso ya Isalaele balandaki ye. 26Akebisaki lisanga mobimba : « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango ! »
27Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo.
28Bongo Moyize alobaki : « Tala ndenge nini bokoyeba solo ete Yawe atindaki ngai kosala makambo oyo nyonso, kasi ezali makanisi ya motema na ngai moko te : 29Soki bato oyo bakufi kufa ya bato nyonso mpe bamoni makambo oyo bato nyonso bamonaka, wana nde Yawe atindaki ngai te ! 30Kasi soki Yawe asali penza likambo moko ya sika, bongo mabele efungoli monoko na yango mpe emeli bango elongo na biloko na bango nyonso, mpe bakiti ya bomoi kati na mokili ya bakufi, wana nde bokoyeba solo ete bato oyo batiolaki Yawe. »
31Tango kaka asilisaki koloba makambo oyo nyonso, mabele efungwamaki na se ya matambe ya Datani mpe Abirami ; 32efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bato ya Kore nyonso elongo na bozwi na bango nyonso. 33Bakitaki ya bomoi kati na mokili ya bakufi elongo na biloko na bango nyonso, mabele ezipaki bango mpe bakufaki ndenge wana. Mpe balimwaki kati na lisanga. 34Bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki pembeni na bango bakimaki tango bayokaki bango koganga. Bazalaki komilobela : « Mabele ekomela biso mpe lokola ! »
35Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa.
Currently Selected:
Mitango 16: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.