Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Mitango 13

13
Moyize atindi bato mpo na kononga Kanana
1Yawe alobaki na Moyize : 2« Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. »
3Na mitindo ya Yawe, Moyize atindaki bango wuta na esobe ya Parani. Bango nyonso bazalaki bakambi ya mabota ya bana ya Isalaele.
4Tala bakombo na bango :
mpo na libota ya Ribeni : Chamuwa, mwana mobali ya Zakuri ;
5mpo na libota ya Simeoni : Shafati, mwana mobali ya Ori ;
6mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ;
7mpo na libota ya Isakari : Yigali, mwana mobali ya Jozefi ;
8mpo na libota ya Efrayimi : Oze, mwana mobali ya Nuni ;
9mpo na libota ya Benjame : Paliti, mwana mobali ya Rafu ;
10mpo na libota ya Zabuloni : Gadieli, mwana mobali ya Sodi ;
11mpo na libota ya Jozefi na nzela ya Manase : Gaadi, mwana mobali ya Susi ;
12mpo na libota ya Dani : Amieli, mwana mobali ya Gemali ;
13mpo na libota ya Aseri : Seturi, mwana mobali ya Mikaeli ;
14mpo na libota ya Nefitali : Nakibi, mwana mobali ya Vofisi ;
15mpo na libota ya Gadi : Geweli, mwana mobali ya Maki.
16Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. »
17Tango Moyize atindaki bango mpo na kononga mokili ya Kanana, alobaki : « Bolekela na nzela ya etuka ya Negevi mpe bokotela na nzela ya mokili ya bangomba. 18Botala soki mokili yango ezali ndenge nini mpe soki bato oyo bavandaka kuna bazalaka makasi to balemba, soki bazalaka ebele to moke. 19Botala ndenge nini mokili epai wapi bazali kowumela ezali : soki ezali malamu to mabe ; soki bazingela bingumba na yango na bamir to te. 20Botala soki mabele na yango ezali ndenge nini : ebotaka malamu to te ; ezali na banzete to te. Bosala nyonso penza ete bozonga na mbuma ya mokili yango. »
Ezalaki eleko ya kobuka bambuma ya liboso ya vino.
21Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati. 22Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito. 23Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango ; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi. 24Wuta na tango wana, bakomaki kobenga esika yango « lubwaku ya Eshikoli, » oyo elingi koloba « lubwaku ya liboke ya bambuma ya vino, » mpo na kokanisa liboke ya bambuma ya vino oyo bana ya Isalaele babukaki kuna.
Banongi bapesi sango
25Sima na mikolo tuku minei, bazongaki wuta na mokili oyo banongaki. 26Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango. 27Bapesaki sango oyo epai ya Moyize : « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi ; tala kutu bambuma ya mokili yango. 28Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene ; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna. 29Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »
30Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki :
— Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango !
31Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki :
— Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso.
32Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba : « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango ; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe. 33Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki ; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »

Currently Selected:

Mitango 13: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo