1
Mitango 13:30
Mokanda na Bomoi
Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki : — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango !
Kokisana
Luka Mitango 13:30
2
Mitango 13:33
Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki ; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. »
Luka Mitango 13:33
3
Mitango 13:31
Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki : — Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso.
Luka Mitango 13:31
4
Mitango 13:32
Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba : « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango ; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe.
Luka Mitango 13:32
5
Mitango 13:27
Bapesaki sango oyo epai ya Moyize : « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi ; tala kutu bambuma ya mokili yango.
Luka Mitango 13:27
6
Mitango 13:28
Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene ; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna.
Luka Mitango 13:28
7
Mitango 13:29
Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. »
Luka Mitango 13:29
8
Mitango 13:26
Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango.
Luka Mitango 13:26
Ndako
Biblia
Bibongiseli
Bavideo