Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Luka 18:1-30

Luka 18:1-30 MNB

Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te. Alobaki : — Kati na engumba moko, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kotosa Nzambe te, mpe azalaki komemia bato te. Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali ; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye : « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. » Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki : « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te, kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. » Nkolo abakisaki : — Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo ! Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ? Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ? Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo : — Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela : moko azalaki Mofarizeo ; mpe mosusu, mofutisi mpako. Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo. Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. » Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! » Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye. Bato bazalaki mpe komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko. Tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango. Kasi Yesu abengaki bana mpe alobaki : — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bana mike. Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango. Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu : — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ? Yesu azongisaki : — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe. Oyebi mibeko oyo : « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. » Mokambi yango azongisaki : — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai. Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai. Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. Yesu atalaki ye mpe alobaki : — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe ! Nzokande, eleki pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga ; kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe. Bato oyo bayokaki Ye koloba bongo batunaki : — Bongo nani penza akoki kobikisama ? Yesu azongisaki : — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe. Petelo alobaki na Yesu : — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo ! Yesu alobaki na bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba, akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka ; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko.