Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Levitike 3

3
Na tina na bambeka ya boyokani
1Soki moto moko alingi kobonza ngombe ya mobali to ya mwasi lokola mbeka ya boyokani, nyama ya kobonza liboso ya Yawe esengeli kozala ezanga mbeba. 2Akotia loboko na ye na moto ya mbeka, akokata yango kingo na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo, Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 3Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, mafuta nyonso oyo ekangami na biloko ya kati, 4bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango, na kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa mpe bambuma mibale wana. 5Bana mibali ya Aron bakotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba oyo ezali likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
6Soki alingi kobonza meme to ntaba lokola mbeka ya boyokani liboso ya Yawe, asengeli kobonza nyama ya mobali to ya mwasi oyo ezanga mbeba. 7Soki azali nde kobonza mwana meme lokola mbeka, akomema yango liboso ya Yawe. 8Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 9Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta ya mbeka, mokila mobimba, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati mpe mafuta nyonso oyo ekangami na kati, 10bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango mpe mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa na bambuma mibale wana. 11Nganga-Nzambe akotumba biteni nyonso wana na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe.
12Soki alingi kobonza ntaba ya mobali to ya mwasi, akomema yango liboso ya Yawe. Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, 13akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 14Akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, 15bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ekangami na yango mpe bafwa. Bakolongola yango nzela moko na bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo. 16Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Biteni nyonso ya mafuta ezali ya Yawe. 17Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › »

Currently Selected:

Levitike 3: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo