Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Levitike 21

21
Malako mpo na Banganga-Nzambe
Etamboli malamu ya Banganga-Nzambe
1Yawe ayebisaki Moyize : « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron : ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye, 2longola kaka soki ezali ebembe ya mama na ye, ya tata na ye, ya mwana na ye ya mobali to ya mwana na ye ya mwasi, ya ndeko na ye ya mobali. 3Mpo na ndeko na ye ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te, oyo azali nanu na maboko na ye awa abali nanu te ; Nganga-Nzambe akoki komikomisa mbindo. 4Lokola azali mokambi kati na bato na ye, akoki te komikomisa mbindo ; noki te akobebisa bosantu mpe lokumu na ye.
5Banganga-Nzambe bakoki te komikokola suki ya moto, kokata mandefu na bapembeni to kokata nzoloko na banzoto na bango. 6Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango ; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe.
7Banganga-Nzambe basengeli te kobala basi oyo basalaka kindumba to ba-oyo babebisa lokumu na bango na nzela ya mibali mosusu to ba-oyo babengana bango na libala. Pamba te, Banganga-Nzambe bazali basantu oyo babulisami mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. 8Bato nyonso ya Isalaele basengeli komona bango lokola basantu, pamba te babonzaka bilei ya Nzambe na bino. Bomona bango basantu mpo ete Ngai Yawe oyo naponi Isalaele mpe nakomisi bino basantu, nazali Mosantu.
9Mwana mwasi ya Nganga-Nzambe oyo abebisi lokumu na ye na kosala kindumba asambwisi nde tata na ye ; boye esengeli kotumba ye ya bomoi na moto.
Etamboli malamu ya mokonzi ya Banganga-Nzambe
10Mokonzi ya Banganga-Nzambe azali na bokonzi likolo ya Banganga-Nzambe mosusu ; basopelaki ye mafuta ya epakolami na moto mpo na kobulisa ye, mpe asengeli kolata bilamba ya bonganga-Nzambe. Mpo na yango, asengeli te kopanza suki na ye ya moto to kopasola bilamba na ye na mokolo ya matanga. 11Akoki te kopusana pembeni ya ebembe mpe komikomisa mbindo mpo na kufa ya tata na ye to ya mama na ye. 12Azali na ndingisa te ya kotika Esika ya bule ya Nzambe na ye to kobebisa bosantu na yango, pamba te abulisamaki na nzela ya mafuta ya epakolami ya Nzambe na ye. Nazali Yawe.
13Mokonzi ya Banganga-Nzambe asengeli kobala mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. 14Akoki kobala te mwasi oyo akufisa mobali, mwasi oyo babengani na libala to mwasi oyo abebisa lokumu na ye na kosala kindumba ; kasi akobala kaka, kati na bato na ye, mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. 15Na bongo, akobebisa te bosantu ya bakitani na ye kati na bato na ye ; pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisi ye. › »
Mbeba ya nzoto epekisi kozala Nganga-Nzambe
16Yawe ayebisaki Moyize : 17« Loba na Aron : ‹ Kati na bana na yo nyonso na milongo oyo ekoya, moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto na ye, akoki kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye. 18Moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto akoki kopusana pembeni ya etumbelo : mokufi miso, moto oyo atambolaka tengu-tengu ; moto oyo abeba na elongi, na makolo mpe oyo maboko to makolo na ye ekokana te, 19moto oyo abukana lokolo to loboko, 20moto oyo azali na kunki na mokongo to oyo azali penza mokuse ; moto oyo azali na liso ekufa, na makwanza, na mapalata to oyo baboma mokongo. 21Kati na bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, moko te oyo azali na mbeba na nzoto akopusana pembeni ya etumbelo mpo na kobonza makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Lokola azali na mbeba na nzoto na ye, akoki te kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye. 22Akoki na ye kolia bilei nyonso oyo bakobonzela Ngai Nzambe na ye, bilei ya bule mpe bilei oyo eleki bule. 23Kasi mpo na mbeba ya nzoto na ye, akoki te kopusana pembeni ya rido ya Esika ya bule to ya etumbelo, mpo ete abebisa te bosantu ya Esika na Ngai ya bule, pamba te Ngai nazali Yawe, mpe ezali Ngai nde nabulisaki Banganga-Nzambe mpo na mosala na Ngai. › »
24Moyize alobaki makambo oyo epai ya Aron, epai ya bana na ye ya mibali, mpe epai ya bana nyonso ya Isalaele.

Currently Selected:

Levitike 21: MNB

Tya elembo

Kabola

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo