Levitike 1
1
Mibeko na tina na bambeka mpe makabo
1Yawe abengaki Moyize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani : 2« Yebisa bana ya Isalaele :
Na tina na bambeka ya kotumba
‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme.
3Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango. 4Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango. 5Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. 6Bakolongola poso ya mbeka yango mpe bakokata yango na biteni. 7Sima, bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bakopelisa moto na etumbelo mpe bakotanda bakoni likolo ya moto. 8Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo. 9Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
10Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba. 11Akokata yango kingo liboso ya Yawe, na ngambo ya nor ya etumbelo. Bakitani ya Nganga-Nzambe Aron basengeli kosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. 12Akokata-kata mbeka yango na biteni ; bongo Nganga-Nzambe akobongisa yango : akotia moto mpe biteni ya mafuta likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo ; 13akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
14Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka. 15Nganga-Nzambe akomema yango na etumbelo, akokata yango moto, akotumba moto yango na etumbelo mpe akosopa makila na yango zingazinga ya etumbelo. 16Akolongola eloko oyo ezalaka na kingo mpe bansala na yango nyonso ; akobwaka yango na ngambo ya este ya etumbelo, na esika oyo batiaka putulu ya moto. 17Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu ; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe.
Currently Selected:
Levitike 1: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.