Jozue 17
17
Eteni ya mabele ya ndambo ya libota ya Manase
1Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele ; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani. 2Bakitani mosusu ya Manase, kolanda mabota na bango, bazwaki eteni ya mabele : bakitani ya Abiezeri, ya Eleki, ya Asirieli, ya Sishemi, ya Eferi mpe ya Shemida. Bango nde bazalaki bana mibali ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, kolanda bituka na bango.
3Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase, atikalaki kobota bana mibali te ; azalaki kaka na bana basi oyo bakombo na bango ezalaki : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. 4Bayaki liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, liboso ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe liboso ya bakambi. Balobaki : « Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize ete apesa biso eteni ya mabele kati ya bandeko na biso ya mibali. »
Boye, Jozue apesaki bango libula elongo na bandeko mibali ya tata na bango, kolanda mitindo na Yawe. 5Boye, ndambo ya libota ya Manase ezwaki biteni zomi, bakisa mokili ya Galadi mpe ya Bashani oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani. 6Na bongo, bakitani ya Manase ya basi bazwaki libula ya mabele kati na bakitani na ye ya mibali, kasi mokili ya Galadi ezalaki ya bana mibali mosusu ya Manase.
7Eteni ya mabele ya Manase ezalaki longwa na Aseri, na mokili ya Mikimeta oyo ezalaki ya kotalana na Sishemi, kino na ngambo ya Yamini, na ngambo ya bavandi ya Eyini-Tapua. 8Manase azwaki eteni ya mabele ya Tapua, kasi yango moko Tapua oyo ezalaki na bandelo ya Manase ezalaki ya bakitani ya Efrayimi. 9Bongo mondelo ekitaki kino na ngambo ya sude ya moluka ya Kana. Bingumba oyo ezalaki na zingazinga ya bingumba ya Manase ezalaki ya Efrayimi. Kasi mondelo ya Manase elekaki na ngambo ya nor ya moluka mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. 10Efrayimi azwaki eteni ya mabele oyo ezalaki na ngambo ya sude ; mpe Manase azwaki oyo ezalaki na ngambo ya nor. Eteni ya mabele ya Manase ekomaki kino na Ebale monene, na mondelo ya Aseri, na ngambo ya nor mpe ya Isakari, na ngambo ya este.
11Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti).
12Nzokande, bakitani ya Manase bazalaki na makoki te ya kozwa bingumba oyo, pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na etuka yango. 13Atako bongo, tango bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi oyo ekoki na bawumbu, kasi bakokaki te kobengana bango.
Bakitani ya Jozefi basengi eteni ya mabele mosusu
14Bakitani ya Jozefi balobaki na Jozue :
— Mpo na nini opesi biso lokola libula, kaka eteni moko ya mabele ? Tozali penza bato ebele na motango mpe Yawe apamboli biso makasi.
15Jozue azongiselaki bango :
— Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi.
16Bakitani ya Jozefi balobaki na ye :
— Mokili ya bangomba ezali moke mpo na biso, mpe bato nyonso ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe bavandi ya lubwaku ya Jizireyeli, bazalaka na bashar ya bibende mpo na kobunda.
17Jozue alobaki na bato ya Efrayimi mpe ya Manase, bakitani ya Jozefi :
— Bozali ebele mpe bozali makasi. Bokozala kaka na eteni ya mabele moko te. 18Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba ; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi.
Currently Selected:
Jozue 17: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.