Logo ya YouVersion
Elilingi ya Boluki

Jozue 12

12
Molongo ya bakonzi oyo Isalaele alongaki
1Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba :
2Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni.
Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni. 3Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude.
4Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
5Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni.
6Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase.
7Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango 8kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi.
Tala bakonzi yango :
9mokonzi ya Jeriko moko
mokonzi ya Ayi, pembeni ya Beteli moko
10mokonzi ya Yelusalemi moko
mokonzi ya Ebron moko
11mokonzi ya Yarimuti moko
mokonzi ya Lakishi moko
12mokonzi ya Egiloni moko
mokonzi ya Gezeri moko
13mokonzi ya Debiri moko
mokonzi ya Gederi moko
14mokonzi ya Orima moko
mokonzi ya Aradi moko
15mokonzi ya Libina moko
mokonzi ya Adulami moko
16mokonzi ya Makeda moko
mokonzi ya Beteli moko
17mokonzi ya Tapua moko
mokonzi ya Eferi moko
18mokonzi ya Afeki moko
mokonzi ya Lasharoni moko
19mokonzi ya Madoni moko
mokonzi ya Atsori moko
20mokonzi ya Shimironi-Meroni moko
mokonzi ya Akishafi moko
21mokonzi ya Taanaki moko
mokonzi ya Megido moko
22mokonzi ya Kedeshi moko
mokonzi ya Yokineami kati na Karimeli moko
23mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori moko
mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali moko
24mokonzi ya Tiritsa moko.
Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko.

Currently Selected:

Jozue 12: MNB

Tya elembo

Share

Copy

None

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo