Jeremi 31
31
1« Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. »
2Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Bato oyo bakobika na mopanga
bakozwa ngolu kati na esobe ;
boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. »
3Yawe abimelaki biso na kala, alobaki :
« Nalingaka bino na bolingo ya seko ;
yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo.
4Nakobongisa bino lisusu ;
oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu.
Okolata lisusu mbunda na yo ya mike
mpe okobina mabina ya esengo.
5Okolona lisusu bilanga ya vino
na bangomba ya Samari ;
bato oyo bakolona yango bakosepela
tango bakobuka mbuma na yango.
6Ekozala mokolo oyo bakengeli
bakoganga na bangomba ya Efrayimi :
‹ Boya ! Tika ete tokende na Siona,
epai na Yawe, Nzambe na biso ! › »
7Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Boyemba na esengo mpo na Jakobi,
boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso !
Batatola, bosanzola mpe boloba :
‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo,
bato ya Isalaele oyo batikali. ›
8Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor
mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili.
Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani,
basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ;
bato ebele penza bakozonga.
9Bakendeki na kolela,
kasi nakozongisa bango,
wana bakozala kati na kobondela ;
nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka,
na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ;
pamba te nazali Tata ya Isalaele,
mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.
10Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe,
botatola yango na bisanga ya mosika !
Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele
akosangisa bango mpe akobatela bango
ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye.
11Mpo ete Yawe akokangola Jakobi
mpe akobikisa bango na maboko ya bato
oyo baleki bango na makasi.
12Bakozonga na koganga ya esengo
na bangomba ya Siona ;
bakosepela na bomengo ya Yawe :
ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe.
Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi,
mpe bakozala lisusu na mawa te.
13Bilenge basi bakobina na esengo
elongo na bilenge mibali mpe mibange.
Nakobongola matanga na bango na esengo,
nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa.
14Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe
na mafuta ya bibwele,
mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › »
elobi Yawe.
15Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Mongongo moko ezali koyokana na Rama,
ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi :
Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali
mpe aboyi kobondisama,
pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. »
16Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Tika kolela mpe kobimisa mpinzoli,
pamba te mosala na yo ezali na litomba, »
elobi Yawe,
« bana na yo ya mibali bakozonga
wuta na mokili ya banguna.
17Elikya ezali mpo na bomoi na yo ya lobi, »
elobi Yawe,
« bana na yo bakozonga na mokili na bango.
18Nayoki kolelalela ya Efrayimi :
‹ Opesi ngai etumbu
lokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma,
mpe etumbu yango ekweyelaki ngai.
Zongisa ngai, mpe nakozonga,
pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai.
19Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ;
sik’oyo nasili kososola,
nazali kobeta tolo na pasi na motema.
Nayokisamaki soni mpe nasambwaki,
pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. ›
20Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo,
mwana oyo nasepelaka na ye mingi te.
Nzokande napamelaka ye tango nyonso,
mpe nakanisaka ye tango nyonso.
Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye,
mpe nayokelaka ye mawa, »
elobi Yawe.
21« Tia bilembo na nzela,
pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango ;
sala penza keba na nzela na yo,
na nzela oyo ozali kolanda.
Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga,
zonga na bingumba na yo !
22Oh elenge mwasi ya mobulu,
kino tango nini okotika kotambola-tambola ?
Yawe akosala likambo ya sika na mabele :
mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. »
23Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! › 24Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso : basali bilanga mpe babokoli bibwele. 25Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. »
26Boye, tango nalamukaki, natalaki pene na ngai ; nasosolaki ete pongi na ngai ezalaki elengi.
27« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda. 28Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe ; 29« na mikolo wana, bato bakoloba lisusu te :
‹ Batata balie mbuma ya vino ya mobesu,
mpe minu ya bana na bango ekomi ngayi. ›
30Na esika na yango, moto na moto akokufa mpo na masumu na ye moko ; moto nyonso oyo alie mbuma ya vino ya mobesu, minu na ye moko nde ekokoma ngayi.
31Na mikolo ekoya, » elobi Yawe,
« nakosala boyokani ya sika
elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda ;
32ekozala ndenge moko te na boyokani
oyo nasalaki elongo na batata na bango
tango nasimbaki bango na loboko
mpo na kobimisa bango na Ejipito ;
pamba te bakataki boyokani na Ngai wana,
atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, »
elobi Yawe.
33« Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele,
sima na mikolo wana, »
elobi Yawe :
« Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango,
nakokoma yango kati na mitema na bango,
nakozala Nzambe na bango,
mpe bango bakozala bato na Ngai.
34Moko te akoteya lisusu moninga na ye
to ndeko na ye na koloba :
‹ Yeba Yawe ! ›
Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai,
kobanda na mwana moke kino na mokolo, »
elobi Yawe,
« nakolimbisa mabe na bango
mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
35Tala makambo oyo Yawe alobi,
Ye oyo atia moyi mpo ete engengisa mokolo,
apesa mibeko ete sanza mpe minzoto engengisa butu,
aningisaka ebale monene mpo ete mbonge etia makelele,
mpe oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga :
36« Soki kaka bakoki solo kolongola malako
oyo na miso na Ngai, »
elobi Yawe,
« wana bana ya Isalaele mpe bakozala lisusu ekolo te
na miso na ngai. »
37Tala liloba oyo Yawe alobi :
« Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo
mpe komona miboko ya mabele,
wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele
mpo na makambo nyonso oyo basali, »
elobi Yawe.
38« Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bakotonga lisusu engumba oyo mpo na Ngai, kobanda na ndako molayi ya Ananeyeli kino na Ekuke ya Suka ya mir ; 39bakotia singa ya batongi ndako longwa na esika wana kino na ngomba moke ya Garebi, mpe ekobaluka kino na Gowa. 40Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. »
Currently Selected:
Jeremi 31: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.