Jeremi 13
13
Mokaba ya lino
1Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kosomba mokaba ya lino mpe lata yango na loketo na yo, kasi kopolisa yango na mayi te. »
2Boye, nasombaki mokaba, ndenge Yawe atindaki ngai mpe nalataki yango na loketo na ngai.
3Yawe alobaki na ngai lisusu na mbala ya mibale : 4« Kamata mokaba oyo osombaki mpe oyo olati na loketo na yo, kende sik’oyo na Perati mpe bomba yango kuna kati na madusu ya mabanga. »
5Boye nakendeki kobomba mokaba yango na Perati, ndenge Yawe alobaki na ngai.
6Sima na mikolo ebele, Yawe alobaki na ngai lisusu : « Kende kokamata mokaba oyo nalobaki na yo ete obomba na Perati. »
7Nakendeki na Perati, nalukaki mokaba yango epai nabombaki yango ; kasi mokaba yango ebebaki makasi mpe etikalaki lisusu na tina te.
8Bongo Yawe alobaki na ngai : 9« Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi. 10Bato oyo bazali bato mabe, bayokaka maloba na Ngai te, bazali mito makasi, batingamaka kosala kolanda baposa ya mitema na bango, mpe balandaka banzambe ya bapaya mpo na kosalela mpe kogumbamela yango ; bakokoma kaka lokola mokaba oyo, mokaba oyo etikali lisusu na tina te. 11Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. ›
Vino ya kanda
12Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino. › Mpe soki batuni yo : ‹ Boni, okanisi ete biso toyebi te ete mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino ? › 13Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi. 14Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › »
Makebisi mpo na kokima bowumbu
15Boyoka malamu mpe bosala keba !
Bosala lolendo te,
pamba te ezali Yawe nde alobi.
16Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino,
liboso ete amemela bino molili,
liboso ete makolo na bino ebeta mabaku
na bangomba oyo ezipami na molili.
Bino bozali kozela pole,
kasi Ye akobongola yango molili makasi.
17Soki boyoki te,
nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino,
nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli,
pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu.
18Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi :
« Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi,
pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. »
19Bingumba ya sude ekokangama,
mpe moto moko te akokoka kofungola yango.
Bato nyonso ya Yuda bakokende na bowumbu,
bango nyonso penza bakokende.
20Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala,
bato bazali koya wuta na nor !
Wapi bibwele oyo bapesaki yo ete obatela,
mpe wapi meme oyo ozalaki kobetela tolo ?
21Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi
na se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki.
Okokoma na pasi te
lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?
22Mpe soki omituni :
« Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? »
Ezali mpo na ebele ya masumu na yo
nde bapasolaki yo bilamba
mpe bazokisaki nzoto na yo.
23Boni, moto mwindo akoki solo kobongola
poso ya nzoto na ye ?
Nkoyi ekoki kolongola penza
matono ya poso ya nzoto na yango ?
Bokokoka kosala malamu te,
bino bato oyo bomesana kosala mabe.
24« Nakopanza bino lokola matiti ya kokawuka
oyo mopepe ya esobe ememaka.
25Yango nde etumbu na yo,
mbano oyo nakatelaki yo, » elobi Yawe,
« pamba te bobosanaki Ngai
mpe botiaki mitema epai ya banzambe ya lokuta.
26Nakotombola yo bilamba kino na elongi
mpo ete bato bamona bolumbu na yo.
27Namoni bondumba na yo
mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ;
ekobo na yo ezali na soni ata moke te.
Namoni banzambe na yo ya bikeko
na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga.
Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te !
Kino tango nini okozala mbindo ? »
Currently Selected:
Jeremi 13: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.