Bilombe 15
15
Samison azongisi mabe na mabe
1Sima na mwa mikolo, na eleko oyo bakataka ble, Samison azwaki mwana ntaba mpe akendeki kotala mwasi na ye. Alobaki :
— Nalingi kokota na shambre epai wapi mwasi na ngai alalaka.
Kasi tata ya mwasi na ye apesaki ye nzela te. 2Alobaki na Samison :
— Nakanisaki penza ete olingaka ye te, yango wana nabalisaki ye epai ya moko kati na baninga na yo, oyo obengisaki na feti. Tala leki na ye ya mwasi, aleki ye na kitoko te ? Zwa ye kaka.
3Samison alobaki na bango :
— Ya mbala oyo, nakozala ata na ngambo moko te liboso ya bato ya mokili ya Filisitia ; nakeyi kosala bango mabe.
4Samison abimaki mpe akangaki bambwa ya zamba nkama misato, akangisaki yango mibale-mibale na mikila mpe atiaki koni na kati-kati ya mikila mibale-mibale ya bambwa yango. 5Apelisaki koni yango mpe atikaki bambwa ya zamba kati na bilanga ya ble ya bato ya Filisitia, oyo esili kokomela. Atumbaki maboke ya ble oyo batiaki na mipiku mpe ble oyo babukaki nanu te, banzete ya vino mpe banzete ya olive. 6Bato ya Filisitia batunaki :
— Nani asali boye ?
Bazongiselaki bango :
— Ezali Samison, bokilo ya moto moko ya Timina ; pamba te abalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga oyo Samison abengisaki na feti.
Bato ya Filisitia bakendeki mpe batumbaki mwasi yango elongo na tata na ye kino bakufaki. 7Samison alobaki na bango : « Lokola bosali boye, nakotika te kino nakozongisela bino mabe na mabe. »
8Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami.
Bakabi Samison na maboko ya bato ya Filisitia
9Bato ya Filisitia bayaki mpe batongaki molako na bango kati na etuka ya Yuda, bapanzanaki kino na etuka ya Leyi. 10Bato ya Yuda batunaki :
— Mpo na nini boyei kobundisa biso ?
Bato ya Filisitia bazongiselaki bango :
— Toyei kokanga Samison na basinga mpo ete tosala ye ndenge asalaki biso.
11Bato nkoto misato ya Yuda bakendeki na lidusu ya mabanga ya Etami, mpe balobaki na Samison :
— Oyebi te ete bato ya Filisitia bazali kokonza biso ? Likambo nini osali biso ?
Samison azongisaki :
— Nazongiseli bango makambo oyo bango basalaki ngai.
12Bato ya Yuda balobaki na Samison :
— Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia.
Samison alobaki na bango :
— Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko.
13Bato ya Yuda bazongisaki :
— Iyo ! Tokoboma yo te. Tolingi kaka kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko na bango.
Bongo bakangaki ye na basinga mibale ya sika mpe babimisaki ye na lidusu ya mabanga. 14Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye. 15Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko.
16Samison alobaki :
« Na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane,
nakangisi bango mipiku na mipiku ;
na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane,
nabomi bato nkoto moko. »
17Tango asilisaki koloba, abwakaki mokuwa yango mosika mpe apesaki esika yango kombo « Ramati-Leyi#15.17 Ramati-Leyi elingi koloba : ngomba moke ya mbanga.. »
18Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe : « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene ; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te ? »
19Bongo Nzambe afungolaki libanga oyo ezalaki kati na Leyi, mpe libanga yango ebimisaki mayi. Tango Samison amelaki mayi, makasi na ye ezongaki mpe azwaki lisusu bomoi. Boye abengaki etima yango Eyini-Akore#15.19 Eyini-Akore elingi koloba : etima ya moto oyo azali kosambela..
20Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale, wana bato ya Filisitia bazalaki kokonza mokili.
Currently Selected:
Bilombe 15: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy
![None](/_next/image?url=https%3A%2F%2Fimageproxy.youversionapi.com%2F58%2Fhttps%3A%2F%2Fweb-assets.youversion.com%2Fapp-icons%2Fln.png&w=128&q=75)
Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.