Ezayi 64
64
1Ndenge moto etumbaka matiti
mpe etokisaka mayi na nzungu,
kita mpo na kosala ete banguna na Yo
bayeba Kombo na Yo
mpe bikolo eningana liboso na Yo !
2Pamba te tango osalaki makambo ya somo
oyo biso tozalaki kozela te,
okitaki mpe bangomba eninganaki liboso na Yo.
3Wuta na tango ya kala penza,
moto moko te atikala kososola,
litoyi moko te etikala koyoka,
liso moko te etikala komona,
ete nzambe moko, longola kaka Yo,
asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye.
4Osungaka bato oyo bazalaka na esengo
ya kosala makambo ya sembo,
ba-oyo babosanaka nzela na Yo te.
Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu ;
bongo ndenge nini tokoki solo kobika ?
5Biso nyonso, tokomi lokola eloko ya mbindo,
misala na biso nyonso ya bosembo ezali
lokola elamba ya mbindo ;
biso nyonso tokawuki lokola likasa
mpe masumu na biso ememi biso lokola mopepe !
6Moko te azali kobelela Kombo na Yo
to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo,
pamba te obombeli biso elongi na Yo
mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso.
7Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso ;
biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko,
bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki ;
biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo.
8Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ;
kokanisaka masumu na biso tango nyonso te !
Tala biso ndenge tozali kobondela,
pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
9Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe ;
ezala Siona, yango mpe ekomi esobe ;
Yelusalemi etikali lisusu na bato te !
10Tempelo na biso ya bule mpe ya lokumu
epai wapi batata na biso bazalaki koyemba
masanzoli mpo na lokumu na Yo,
esili kozika na moto ;
mpe nyonso oyo tozalaki na yango ya motuya
esili kobebisama !
11Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso,
okozongisa kaka motema na Yo sima te ?
Okokanga kaka monoko
mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo ?
Currently Selected:
Ezayi 64: MNB
Tya elembo
Kabola
Copy

Olingi kobomba makomi na yo wapi otye elembo na baapareyi na yo nyonso? Kota to mpe Komisa nkombo
Mokanda na Bomoi™
Makomi na se ya bokonzi © 2002, 2020 Biblica, Inc.
Esalelami na ndingisa ya Biblica. Makoki nyonso ebatelema kati na mokili mobimba.
Lingala Contemporary Bible™
Copyright © 2002, 2020 by Biblica, Inc.
Used with permission. All rights reserved worldwide.